< اول تواریخ 18 >

و بعد از اين واقع شد که داود فلسطينيان را شکست داده، مغلوب ساخت و جَتّ و قريه هايش را از دست فلسطينيان گرفت. ۱ 1
Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki na maboko ya bato ya Filisitia engumba Gati elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
و موآب را شکست داد و موآبيان بندگان داود شده، هدايا آوردند. ۲ 2
Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi. Bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.
و داود هَدَرعَزَر پادشاه صُوبَه را در حَمات هنگامي که مي رفت تا سلطنت خود را نزد نهر فرات استوار سازد، شکست داد. ۳ 3
Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, na engumba Amati, tango Adadezeri akendeki kovandisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.
و داود هزار ارابه و هفت هزار سوار و بيست هزار پياده از او گرفت، و داود تمامي اسبان ارابه را پي کرد، اما از آنها براي صد ارابه نگاه داشت. ۴ 4
Davidi abotolaki Adadezeri bashar nkoto moko, akangaki basoda nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.
و چون اَراميانِ دمشق به مدد هَدَرعَزَر پادشاه صُوبَه آمدند، داود بيست و دو هزار نفر از اَراميان را کشت. ۵ 5
Tango bato ya Siri oyo bazalaki kovanda na engumba Damasi bayaki kosunga Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, Davidi abomaki kati na bango bato nkoto tuku mibale.
و داود در اَرامِ دمشق (قراولان) گذاشت و اَراميان بندگان داود شده، هدايا آوردند. و خداوند داود را در هر جا که مي رفت نصرت مي داد. ۶ 6
Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri; boye bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
و داود سپرهاي طلا را که بر خادمان هَدَرعَزَر بود گرفته، آنها را به اورشليم آورد. ۷ 7
Davidi abotolaki banguba ya wolo oyo bakonzi ya basoda ya Adadezeri bazalaki na yango mpe amemaki yango na Yelusalemi.
و داود از طِبحَت و کُون شهرهاي هَدَرعَزَر برنج از حد زياده گرفت که از آن سُليمان درياچه و ستونها و ظروف برنجين ساخت. ۸ 8
Na Tibati mpe na Kuni, bingumba ya mokonzi Adadezeri, Davidi azwaki bronze ebele oyo, na mikolo oyo elandaki, Salomo asalaki na yango nzungu ya monene, makonzi mpe bisalelo mosusu ya bronze.
و چون تُوعُو پادشاه حَمات شنيد که داود تمامي لشکر هَدَرعَزَر پادشاه صُوبَه را شکست داده است، ۹ 9
Tango Towu, mokonzi ya Amati, ayokaki ete Davidi alongi mampinga nyonso ya Adadezeri, mokonzi ya Tsoba,
پسر خود هَدُرام را نزد داود پادشاه فرستاد تا سلامتي او بپرسد و او را تَهنِيت گويد از آن جهت که با هَدَرعَزَر جنگ نموده او را شکست داده بود، زيرا هَدَرعَزَر با تُوعُو مقاتله مي نمود؛ و هر قِسم ظروف طلا و نقره و برنج (با خود آورد). ۱۰ 10
atindaki Adorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Towu. Adorami amemelaki Davidi lolenge nyonso ya biloko ya wolo, ya palata mpe ya bronze.
و داود پادشاه آنها را نيز براي خداوند وقف نمود، با نقره و طلايي که از جميع امّت ها يعني از اَدُوم و موآب و بني عَمُّون و فلسطينيان و عَمالَقَه آورده بود. ۱۱ 11
Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango epai na Yawe, ndenge asalaki na wolo mpe palata oyo azwaki na bikolo nyonso, na Edomi, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki.
و اَبِشاي ابن صَرُويه هجده هزار نفر از اَدُوميان را در وادي مِلح کشت. ۱۲ 12
Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, abomaki bato ya Edomi nkoto zomi na mwambe, kati na Lubwaku ya Mungwa.
و در اَدُوم قراولان قرار داد و جميع اَدُوميان بندگان داود شدند و خداوند داود را در هر جايي که مي رفت نصرت مي داد. ۱۳ 13
Davidi atiaki bayangeli kati na Edomi, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
و داود بر تمامي اسرائيل سلطنت نمود، انصاف و عدالت را بر تمامي قوم خود مجزا مي داشت. ۱۴ 14
Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, mpe azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.
و يوآب بن صَرُويه سردار لشکر بود و يهوشافاط بن اَخِيلُود وقايع نگار. ۱۵ 15
Joabi, mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya liboso ya mampinga; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda;
و صادوق بن اَخِيطُوب و ابيمَلِک بن اَبياتار کاهن بودند و شوشا کاتب بود. ۱۶ 16
Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Abimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe; Shavisha azalaki mokomi mikanda;
و بنايا ابن يهُوياداع رئيس کَريتيان و فَلِيتيان و پسران داود نزد پادشاه مقدم بودند. ۱۷ 17
Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki bakalaka ya liboso pembeni ya mokonzi.

< اول تواریخ 18 >