< Zakari 4 >

1 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi.
那與我說話的天使又來叫醒我,好像人睡覺被喚醒一樣。
2 Atunaki ngai: — Ozali komona nini? Nazongiselaki ye: — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda.
他問我說:「你看見了甚麼?」我說:「我看見了一個純金的燈臺,頂上有燈盞,燈臺上有七盞燈,每盞有七個管子。
3 Ezali lisusu na banzete mibale ya olive pene ya etelemiselo ya minda: moko na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi.
旁邊有兩棵橄欖樹,一棵在燈盞的右邊,一棵在燈盞的左邊。」
4 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: — Nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai?
我問與我說話的天使說:「主啊,這是甚麼意思?」
5 Azongiselaki ngai: — Boni, oyebi te soki elingi kolakisa nini? Nazongiselaki ye: — Te, nkolo na ngai!
與我說話的天使回答我說:「你不知道這是甚麼意思嗎?」我說:「主啊,我不知道。」
6 Alobaki na ngai: — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli: « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
他對我說:「這是耶和華指示所羅巴伯的。萬軍之耶和華說:不是倚靠勢力,不是倚靠才能,乃是倚靠我的靈方能成事。
7 Ozali nani, ngomba monene? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo: « Tika ete Nzambe apambola yango! Tika ete Nzambe apambola yango! »
大山哪,你算甚麼呢?在所羅巴伯面前,你必成為平地。他必搬出一塊石頭,安在殿頂上。人且大聲歡呼說:『願恩惠恩惠歸與這殿!』」
8 Bongo Yawe alobaki na ngai:
耶和華的話又臨到我說:
9 — Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
「所羅巴伯的手立了這殿的根基,他的手也必完成這工,你就知道萬軍之耶和華差遣我到你們這裏來了。
10 Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
誰藐視這日的事為小呢?這七眼乃是耶和華的眼睛,遍察全地,見所羅巴伯手拿線鉈就歡喜。」
11 Natunaki Anjelu: — Banzete mibale ya olive oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali mpe ya mwasi ya etelemiselo ya minda elakisi nini?
我又問天使說:「這燈臺左右的兩棵橄欖樹是甚麼意思?」
12 Natunaki ye lisusu: — Bitape mibale ya nzete ya olive, oyo ezali pembeni ya batio mibale ya wolo oyo ebimisaka mafuta oyo engalaka elakisi nini?
我二次問他說:「這兩根橄欖枝在兩個流出金色油的金嘴旁邊是甚麼意思?」
13 Azongiselaki ngai: — Boni, oyebi te soki elakisi nini? Nazongisaki: — Te, nkolo na ngai.
他對我說:「你不知道這是甚麼意思嗎?」我說:「主啊,我不知道。」
14 Boye, alobaki: — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.
他說:「這是兩個受膏者站在普天下主的旁邊。」

< Zakari 4 >