< Loyembo ya Salomo 8 >

1 Ah, soki ozalaki ndeko na ngai ya mobali oyo amelaki mabele ya mama na ngai! Soki nakutanaki na yo na libanda, nalingaki kopesa yo beze, mpe moto moko te alingaki kotiola ngai. 2 Nalingaki komema yo mpe kokotisa yo na ndako ya mama na ngai, mpo ete oteya ngai bolingo. Nalingaki komelisa yo vino ya kitoko, oyo basali na bambuma ya grenade. 3 Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai, mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto! 4 Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino: bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka. 5 Nani oyo abimi na esobe mpe alaleli mobali na ye ya motema? Nalamusaki yo na se ya nzete ya pome, na esika oyo mama na yo azwaki zemi na yo, esika oyo abotaki yo na pasi. 6 Tia ngai lokola kashe na motema na yo, lokola kashe na loboko na yo; pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa, zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi. Moto ya bolingo epelaka makasi lokola kake kowuta epai na Yawe. (Sheol h7585) 7 Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te; ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te. Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako mpo na kosomba bolingo, solo penza bakotiola ye. 8 Tozali na ndeko moko ya mwasi, azali nanu moke; azali nanu ata na mabele te. Tokosala nini mpo na ye na mokolo oyo bakoluka ye na libala? 9 Soki azalaki mir, tolingaki kotonga likolo na ye ndako oyo esalemi na palata; soki azalaki ekuke, tolingaki kokanga ye na libaya ya sedele. 10 Nazali mir, mpe mabele na ngai ezali lokola bandako milayi. Boye, na miso na ye, nazali lokola mwasi oyo azwi kimia. 11 Salomo azali na elanga ya vino kati na Bala-Amoni, apesi yango na bakengeli; moko na moko kati na bango azalaki kopesa mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko mpo na kosomba bambuma na yango. 12 Oh Salomo, mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ezali ya yo, mpe bibende nkama mibale ezali ya bakengeli bambuma; kasi elanga na ngai ya vino, oyo ezali liboso na ngai, ezali ya ngai. 13 Yo oyo ovandi kati na bilanga, baninga na yo balingi koyoka mongongo na yo; tika ete oyokisa ngai yango! 14 Oh bolingo na ngai, kima mbangu, zala lokola mboloko to lokola mwana ya mbuli; kende na likolo ya bangomba oyo etondi na matiti ya solo kitoko.

< Loyembo ya Salomo 8 >