< Barome 15 >

1 Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko. 2 Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye! 3 Pamba te ezala Klisto, alukaki te komisepelisa Ye moko; kasi alobaki, kolanda ndenge ekomama, « mafinga ya bato oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai. » 4 Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya. 5 Tika ete Nzambe oyo apesaka bato molende mpe mpiko apesa bino makanisi moko, bamoko elongo na bamosusu, kolanda mokano ya Yesu-Klisto, 6 mpo ete bopesa nkembo na Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na makanisi moko mpe na monoko moko. 7 Yango wana, boyambanaka, bamoko na bamosusu, ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe. 8 Pamba te nazali koloba na bino solo: Klisto akomaki Mosali ya Bayuda mpo na kokokisa bilaka oyo Nzambe apesaki epai ya bakoko na bango mpe kolakisa ete Nzambe azali Moyengebene. 9 Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama: « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. » 10 Alobaki lisusu: « Bapagano, bosepela elongo na bato na Ye. » 11 Mpe lisusu: « Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Nkolo! Tika ete bato ya mabota nyonso bakumisa Ye! » 12 Ezayi mpe alobaki: « Moto moko akobima wuta na libota ya Izayi, akotelema mpo na kokonza bikolo, mpe Bapagano bakotiela Ye elikya. » 13 Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu. 14 Bandeko na ngai, nandimisami solo ete botondi na boboto, na boyebi nyonso mpe na makoki ya kolendisana, bamoko na bamosusu. 15 Nzokande, mpo na kolamusa makanisi na bino, nakomelaki bino, na molende nyonso, ndambo ya makambo kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai 16 ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi. 17 Yango wana namikumisaka kati na Yesu-Klisto, na mosala oyo nasalaka mpo na Nzambe. 18 Pamba te soki nakoki koloba, nakoloba kaka mpo na makambo oyo Klisto asalaki na nzela na ngai, mpo na komema Bapagano na kotosa Nzambe. Asalaki yango na nzela ya makambo oyo nalobaki mpe nasalaki 19 na nzela ya nguya Molimo na Nzambe, oyo emonisami kati na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, na bazingazinga nyonso kino na Iliri, nasakolaki Sango Malamu ya Klisto na mobimba na yango. 20 Pamba te nazwaki mokano ya koteya Sango Malamu na bisika oyo Kombo ya Klisto eyebanaki nanu te, mpo ete natonga na likolo ya moboko ya moto mosusu te, 21 kasi kolanda ndenge ekomama: « Bato oyo babetela bango nanu lisolo te na tina na Ye bakomona, mpe ba-oyo bayoka nanu sango na Ye te bakososola. » 22 Yango nde ezalaki mbala mingi kokanga ngai nzela ya koya epai na bino. 23 Kasi sik’oyo, nazali lisusu na esika te ya kosala mosala kati na etuka oyo; bongo lokola wuta kala, nazalaka na posa makasi ya koya epai na bino, 24 nazali kosala mabongisi ya kokokisa yango tango nakokende na Espane. Nazali na elikya ete, wana nakolekela epai na bino, nakomona bino mpe nakozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima na ngai kosepela kovanda elongo na bino ata na mwa tango moke. 25 Nzokande sik’oyo, nazali kokende na Yelusalemi mpo na komemela basantu lisungi. 26 Pamba te Mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi. 27 Solo, bango moko nde bazwaki mokano ya kosala bongo mpo ete ezalaki lokola niongo epai na bango. Pamba te soki Bayuda bakabolaki makabo ya molimo elongo na bato ya bikolo ya bapaya, bango mpe basengeli kokabola biloko na bango elongo na Bayuda. 28 Soki nasilisi mosala oyo mpe napesi bango lisungi yango, nakolekela epai na bino tango nakokende na Espane. 29 Nayebi ete tango nakoya epai na bino, nakoya na mapamboli mingi ya Klisto. 30 Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe ya bolingo ya Molimo: Bobundaka elongo na ngai kati na mabondeli oyo bosalaka epai ya Nzambe na tina na ngai 31 mpo ete nakangolama na maboko ya bato oyo bandimaka te kati na Yuda, mpe mpo ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango. 32 Na bongo nde nakolonga kokoma epai na bino na esengo; mpe soki Nzambe akolinga, nakopema mwa moke elongo na bino. 33 Tika ete Nzambe ya kimia azala elongo na bino nyonso! Amen!

< Barome 15 >