< Emoniseli 21 >

1 Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te.
Potem zobaczyłem nowe niebo i nową ziemię. Pierwsze niebo bowiem i pierwsza ziemia przeminęły i nie było już morza.
2 Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.
A ja, Jan, zobaczyłem święte miasto, nowe Jeruzalem, zstępujące z nieba od Boga, przygotowane jak oblubienica przyozdobiona dla swego męża.
3 Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba: « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.
I usłyszałem donośny głos z nieba: Oto przybytek Boga [jest] z ludźmi i będzie mieszkał z nimi. Oni będą jego ludem, a sam Bóg będzie z nimi i [będzie] ich Bogiem.
4 Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »
I otrze Bóg wszelką łzę z ich oczu, i śmierci już nie będzie ani smutku, ani krzyku, ani bólu nie będzie, bo pierwsze rzeczy przeminęły.
5 Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki: « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. » Alobaki lisusu: « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. »
A zasiadający na tronie powiedział: Oto wszystko czynię nowe. I powiedział do mnie: Napisz, bo te słowa są wiarygodne i prawdziwe.
6 Alobaki na ngai lisusu: « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.
I powiedział do mnie: Stało się. Ja jestem Alfa i Omega, początek i koniec. Ja spragnionemu dam darmo ze źródła wody życia.
7 Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai.
Kto zwycięży, odziedziczy wszystko i będę dla niego Bogiem, a on będzie dla mnie synem.
8 Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo: yango nde kufa ya mibale. » (Limnē Pyr g3041 g4442)
Ale bojaźliwi, niewierzący, obrzydliwi, mordercy, rozpustnicy, czarownicy, bałwochwalcy i wszyscy kłamcy [będą mieli] udział w jeziorze płonącym ogniem i siarką. To jest druga śmierć. (Limnē Pyr g3041 g4442)
9 Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai: « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »
I przyszedł do mnie jeden z siedmiu aniołów, którzy mieli siedem czasz napełnionych siedmioma ostatecznymi plagami, i odezwał się do mnie, mówiąc: Chodź tutaj, pokażę ci oblubienicę, małżonkę Baranka.
10 Bongo kati na Molimo, amemaki ngai na likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi; alakisaki ngai Yelusalemi, engumba ya bule, oyo ezalaki kokita wuta na Lola epai ya Nzambe.
I przeniósł mnie w duchu na górę wielką i wysoką, i pokazał mi wielkie miasto, święte Jeruzalem, zstępujące z nieba od Boga;
11 Ezalaki kongenga na nkembo ya Nzambe, mpe kongenga na yango ezalaki lokola kongenga ya libanga ya talo makasi, lokola jasipe oyo emonisaka lokola krisitali.
Mające chwałę Boga. Jego blask podobny [był] do drogocennego kamienia, jakby jaspisu, przezroczystego jak kryształ.
12 Engumba yango ezalaki na mir moko ya molayi mpe emata na bosanda, mpe ezalaki na bikuke zomi na mibale, mpe na ba-anjelu zomi na mibale na bikuke yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya Isalaele ezalaki ya kokomama na bikuke yango.
Miało ono wielki i wysoki mur, miało dwanaście bram, a na bramach dwunastu aniołów i wypisane imiona, które są [imionami] dwunastu pokoleń synów Izraela.
13 Bikuke misato ezalaki na ngambo ya este, misato na ngambo ya nor, misato na ngambo ya sude, mpe misato na ngambo ya weste.
Od wschodu trzy bramy, od północy trzy bramy, od południa trzy bramy i od zachodu trzy bramy.
14 Mir ya engumba yango etongamaki likolo ya miboko zomi na mibale, mpe bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mpate ezalaki ya kokomama na likolo na yango.
A mur miasta miał dwanaście fundamentów, a na nich dwanaście imion dwunastu apostołów Baranka.
15 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki lokola emekelo molayi lingenda basala na wolo, mpo na komeka molayi ya engumba, ya bikuke na yango mpe ya mir na yango.
A ten, który rozmawiał ze mną, miał złotą trzcinę, aby zmierzyć miasto, jego bramy i jego mur.
16 Bangambo nyonso minei ya engumba yango ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. Anjelu asalelaki lingenda na ye mpo na komeka molayi ya engumba: ezalaki na bakilometele pene nkoto mibale na nkama mibale na molayi, na mokuse mpe na bosanda.
Miasto ma kształt czworoboku, a jego długość jest taka sama jak i szerokość. I wymierzył miasto trzciną na dwanaście tysięcy stadiów. Jego długość, szerokość i wysokość są równe.
17 Anjelu amekaki mpe kovimba ya mir kolanda ndenge bato basalaka: ezalaki na bametele pene tuku motoba na mitano.
I wymierzył jego mur na sto czterdzieści cztery łokcie [według] miary człowieka, która jest [miarą] anioła.
18 Mir yango etongamaki na jasipe, mpe engumba ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala.
Jego mur jest zbudowany z jaspisu, miasto zaś ze szczerego złota podobnego do czystego szkła.
19 Babambaki mabanga ya talo ya ndenge na ndenge na miboko ya mir ya engumba yango: babambaki jasipe na moboko ya liboso, safiri na moboko ya mibale, shalisedwane na moboko ya misato, emerode na moboko ya minei,
Fundamenty muru miasta ozdobione [były] wszelkimi drogimi kamieniami. Pierwszy fundament to jaspis, drugi – szafir, trzeci – chalcedon, czwarty – szmaragd;
20 saridwane na moboko ya mitano, korinaline na moboko ya motoba, krizolite na moboko ya sambo, berili na moboko ya mwambe, topaze na moboko ya libwa, krizopraze na moboko ya zomi, tirikwaze na moboko ya zomi na moko, mpe ametisite na moboko ya zomi na mibale.
Piąty – sardoniks, szósty – karneol, siódmy – chryzolit, ósmy – beryl, dziewiąty – topaz, dziesiąty – chryzopraz, jedenasty – hiacynt, dwunasty – ametyst.
21 Bikuke wana zomi na mibale ezalaki lokola mayaka zomi na mibale; ekuke moko na moko esalemaki na liyaka moko. Balabala monene ya engumba yango ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala.
A dwanaście bram [to] dwanaście pereł. Każda brama była z jednej perły. A rynek miasta to szczere złoto, jak przezroczyste szkło.
22 Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango.
Lecz świątyni w nim nie widziałem, bo jego świątynią jest Pan Bóg Wszechmogący oraz Baranek.
23 Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe; bongo Mpate azali mwinda na yango.
A miasto nie potrzebuje słońca ani księżyca, aby świeciły w nim, bo oświetla je chwała Boga, a jego lampą jest Baranek.
24 Bikolo ekotambola na pole na yango, mpe bakonzi ya mokili bakomema nkembo na bango kati na engumba.
Narody, które będą zbawione, będą chodziły w jego świetle, a królowie ziemi wniosą do niego swoją chwałę i cześć.
25 Bikuke ya engumba yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te.
W dzień jego bramy nie będą zamknięte, bo nocy tam nie będzie.
26 Bakomemela engumba yango nkembo mpe lokumu ya bikolo.
I wniosą do niego chwałę i cześć narodów.
27 Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.
I nie wejdzie do niego nic nieczystego ani ten, kto popełnia obrzydliwość i kłamstwo, tylko ci, którzy są zapisani w księdze życia Baranka.

< Emoniseli 21 >