< Emoniseli 16 >

1 Bongo nayokaki mongongo moko monene kobima wuta na Tempelo mpe koloba na ba-anjelu sambo: « Bokende kosopa na mokili bakopo sambo ya kanda ya Nzambe. »
Then I heard a loud voice, which came from the Temple, saying to the seven angels — ‘Go and empty the seven bowls of the Wrath of God upon the earth.’
2 Anjelu ya liboso akendeki mpe asopaki kopo na ye na mokili, mpe bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na banzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango.
The first angel went and emptied his bowl upon the earth; and it turned to loathsome and painful sores upon all who bore the brand of the Beast and who worshiped its image.
3 Anjelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebale yango ekomaki lokola makila ya mowei; mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaki kati na ebale monene ekufaki.
Then the second angel emptied his bowl upon the sea; and it turned to blood like the blood of a corpse, and every living thing died — everything in the sea.
4 Anjelu ya misato asopaki kopo na ye na bibale mpe na bitima ya mayi, mpe mayi ekomaki makila.
Then the third angel emptied his bowl upon the rivers and springs of water; and it turned to blood.
5 Bongo nayokaki anjelu oyo azalaki na bokonzi likolo ya mayi koloba: « Oh Mosantu, Yo oyo ozali mpe ozalaki, ozali penza sembo, mpo ete okati bongo na bosembo na Yo!
And I heard the Angel of the Waters saying — ‘Righteous art thou, thou who art and who wast, the Holy One, in inflicting this judgment;
6 Mpo ete basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli na Yo, mpe opesi bango makila mpo ete bamela ndenge ekoki mpo na bango. »
for men shed the blood of Christ’s People and of the Prophets, and thou hast given them blood to drink. It is what they deserve.’
7 Bongo nayokaki etumbelo koloba: « Iyo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, okataka makambo na ndenge ya solo mpe ya sembo! »
And I heard the response from the altar — ‘Yes, O Lord, our God, the Almighty, true and righteous are they judgments.’
8 Anjelu ya minei asopaki kopo na ye na likolo ya moyi, mpe moyi ezwaki ndingisa ya kozikisa bato na nzela ya moto na yango.
Then the fourth angel emptied his bowl upon the sun; and he was permitted to scorch men with fire;
9 Moto makasi etumbaki bato, mpe bakomaki kofinga Kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya pasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa Ye nkembo.
and men were scorched by the intense heat. They blasphemed the Name of God who controlled these Curses, yet they did not repent and give him praise.
10 Anjelu ya mitano asopaki kopo na ye na likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama, mpe molili ezipaki bokonzi ya nyama yango. Bato bakomaki komiswa lolemo mpo na pasi,
Then the fifth angel emptied his bowl upon the throne of the Beast; and darkness fell upon its Kingdom. Men gnawed their tongues for pain,
11 bafingaki Nzambe ya Lola mpo na pasi mpe bapota na bango ya minene. Kasi baboyaki kaka kotika misala na bango ya mabe.
and blasphemed the God of Heaven, because of their pains and because of their sores; yet they did not repent of what they had done.
12 Anjelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale Efrate, mpe mayi na yango ekawukaki mpo ete nzela ya bakonzi oyo bakowuta na Este esalema.
Then the sixth angel emptied his bowl upon the great river Euphrates; and the water in the river was dried up, so that the road for the Kings of the East might be made ready.
13 Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo kobima longwa na monoko ya dalagona, na monoko ya nyama mpe na monoko ya mosakoli ya lokuta.
And I saw three foul spirits, like frogs, come from the mouth of the Dragon and from the mouth of the Beast and from the mouth of the false Prophet.
14 Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
They are the spirits of demons, and perform marvels; they go to kings all over the world, to collect them for the battle on the Great Day of Almighty God.
15 Tala, nazali koya lokola moyibi! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.
(‘I am coming like a thief! Happy will he be who is on the watch, and keeps his clothing at hand, so that he will not have to walk about unclothed and let men see his nakedness.’)
16 Milimo wana ya kindoki esangisaki bakonzi na esika oyo babengaka, na lokota ya Ebre, Armagedona.
And the spirits collected the kings at the place called in Hebrew ‘Har-Magedon.’
17 Anjelu ya sambo asopaki kopo na ye kati na mopepe, mpe mongongo moko ya monene kowuta na Kiti ya Bokonzi ebimaki longwa na Tempelo mpe elobaki: « Ekokisami! »
Then the seventh Angel emptied his bowl upon the air. (A loud voice came from the throne in the Temple; it said ‘All is over.’)
18 Bongo mikalikali engengaki, mingongo eyokanaki, bakake ebetaki, mpe mabele eninganaki makasi; likambo ya somo boye etikala nanu kosalema te wuta moto azali na mokili.
There followed ‘flashes of lightning, cries, and peals of thunder’; and there was a great earthquake, such as had not occurred since man began to be upon the earth — none so great;
19 Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.
and the great City was torn in three, and the cities of the nation fell, and God remembered Babylon the Great, and gave her the maddening wine-cup of his Wrath;
20 Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te.
and every island vanished, and the mountains disappeared.
21 Bamvula minene ya mabanga enokaki; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi.
Great hailstones, a pound in weight, are falling upon men from the heavens. And men blasphemed God because of the Curse of the hail, for it was a very terrible Curse.

< Emoniseli 16 >