< Banzembo 97 >

1 Yawe azali kokonza! Tika ete mabele esepela; tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo!
耶和華作王!願地快樂! 願眾海島歡喜!
2 Mapata mpe molili makasi ezingeli Ye, bosembo mpe bosolo ezali miboko ya Kiti na Ye ya Bokonzi.
密雲和幽暗在他的四圍; 公義和公平是他寶座的根基。
3 Moto etambolaka liboso na Ye, ezikisaka banguna na Ye, oyo bazingeli Ye.
有烈火在他前頭行, 燒滅他四圍的敵人。
4 Mikalikali na Ye engengisaka mokili; mpe tango mabele emonaka bongo, elengaka.
他的閃電光照世界, 大地看見便震動。
5 Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.
諸山見耶和華的面, 就是全地之主的面,便消化如蠟。
6 Likolo epanzaka sango ya bosembo na Ye, mpe bikolo nyonso bamonaka nkembo na Ye.
諸天表明他的公義; 萬民看見他的榮耀。
7 Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye!
願一切事奉雕刻的偶像、 靠虛無之神自誇的,都蒙羞愧。 萬神哪,你們都當拜他。
8 Yawe, Siona eyoki yango mpe esepeli; bingumba ya Yuda ezali na esengo mpo na mikano na Yo!
耶和華啊,錫安聽見你的判斷就歡喜; 猶大的城邑也都快樂。
9 Pamba te, na mokili mobimba, Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo; oleki banzambe nyonso.
因為你-耶和華至高,超乎全地; 你被尊崇,遠超萬神之上。
10 Bino bato oyo bolingaka Yawe, boyina mabe! Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.
你們愛耶和華的,都當恨惡罪惡; 他保護聖民的性命, 搭救他們脫離惡人的手。
11 Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.
散布亮光是為義人; 預備喜樂是為正直人。
12 Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe; bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.
你們義人當靠耶和華歡喜, 稱謝他可記念的聖名。

< Banzembo 97 >