< Banzembo 95 >

1 Boya, toganga na esengo mpo na Yawe! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso! 2 Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo. 3 Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso. 4 Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye; mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye. 5 Ebale monene ezali ya Ye, azali Mokeli na yango; mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye, asala yango na maboko na Ye. 6 Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso! 7 Pamba te azali Nzambe na biso; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, 8 « boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki na Meriba; ndenge bosalaki na mokolo wana ya Masa kati na esobe 9 epai wapi batata na bino batombokelaki ngai mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala. 10 Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki: ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. › 11 Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka: ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! › »

< Banzembo 95 >