< Banzembo 93 >

1 Yawe azali kokonza, alati lokumu monene; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.
耶和華作王! 他以威嚴為衣穿上; 耶和華以能力為衣,以能力束腰, 世界就堅定,不得動搖。
2 Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala; seko na seko, ozali.
你的寶座從太初立定; 你從亙古就有。
3 Yawe, bibale egangaka! Bibale etombolaka lokito na yango; bibale etombolaka makelele na yango.
耶和華啊,大水揚起, 大水發聲,波浪澎湃。
4 Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.
耶和華在高處大有能力, 勝過諸水的響聲,洋海的大浪。
5 Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.
耶和華啊,你的法度最的確; 你的殿永稱為聖,是合宜的。

< Banzembo 93 >