< Banzembo 92 >

1 Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba. Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo!
A psalm. A song; for the sabbath day. It is good to give thanks to the Lord, to sing praise to your name, O Most High,
2 Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,
to declare your love in the morning, and your faithfulness in the night,
3 na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze!
with voice and a ten-stringed harp, with music that throbs on the lyre.
4 Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo.
For you make me glad by your deeds, Lord, at the work of your hands I will ring out my joy.
5 Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo!
How great are your works, O Lord; how deep are your thoughts!
6 Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
The insensitive cannot know, nor can a fool understand,
7 Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
that, though the wicked flourish like grass, and evildoers all blossom, they will perish forever.
8 Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.
But you are exalted forever.
9 Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.
For see! Your enemies, Lord For see! Your enemies perish, all evildoers are scattered.
10 Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.
But you lift me to honour, and anoint me afresh with oil.
11 Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe.
My eyes will feast on my foes, and my ears will hear of the doom of the wicked.
12 Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.
The righteous will sprout like the palm, will grow like a cedar of Lebanon.
13 Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso.
In the house of the Lord are they planted, in the courts of our God they will sprout.
14 Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko,
They will still bear fruit in old age, all sappy and fresh will they be
15 basakolaka: « Yawe azali alima, azali Libanga na biso; kati na Ye, mabe ezali te! »
So they proclaim the Lord to be just, my rock, in whom is no wrong.

< Banzembo 92 >