< Banzembo 9 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba, nakotatola misala minene na Yo nyonso.
For the leader;’almuth labben. A psalm of David. With all my heart I will praise the Lord, all your wonders I will rehearse.
2 Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
I will rejoice and exult in you, singing praise to your name, Most High;
3 Banguna na ngai bazongaka sima, bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.
because backward my foes were turned, they stumbled and perished before you.
4 Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.
My right and my claim you have upheld, you did sit on the throne as a fair judge,
5 Opamelaki bikolo mpe obomaki moto mabe, olimwisaki kombo na bango mpo na libela.
rebuking the nations, destroying the wicked, and blotting their name out forever and ever.
6 Banguna na ngai balimwa mpo na libela; opanzaki bingumba na bango kino bakanisa bango lisusu te.
The foe is vanished, ruined forever, their cities destroyed, their memory perished.
7 Yawe akonzaka mpo na libela, atia Kiti na Ye ya Bokonzi mpo na kokata makambo ya bato.
See! The Lord is seated forever on the throne he established for judgment,
8 Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.
ruling the world with justice, and judging the nations with equity.
9 Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.
So the Lord proves a haven to the oppressed, a haven in times of trouble.
10 Bato oyo bayebi Kombo na Yo batiaka elikya na bango kati na Yo; pamba te, Yo Yawe, osundolaka te bato oyo balukaka Yo.
Well may they trust you who know your name, for those who seek you, you never abandon.
11 Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.
Sing praise to the Lord, whose home is in Zion, declare his deeds among the nations.
12 Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe mpo na makila oyo esopani, akanisaka koganga ya banyokolami.
As avenger of blood, he keeps them in mind, he does not forget the cry of the wretched.
13 Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa;
Show me favour, Lord, see how my foes afflict me, lift me up from the gates of death;
14 mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.
so I may, in your help exulting, tell forth your praise at the gates of Zion.
15 Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
The nations are sunk in the pit which they made, in the net that they hid, their own foot is entangled.
16 Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
The Lord is revealed in the judgment he wrought, the wicked are snared in their own handiwork. (Selah)
17 Bato mabe, bikolo nyonso, oyo bakanisaka Nzambe te, bakokende na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
Let the wicked depart to Sheol, all the nations that live forgetful of God. (Sheol h7585)
18 Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola, mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko.
For the needy will not be always forgotten, nor the hope of the helpless be lost forever.
19 Yawe, telema! Tika ete moto alonga te; tika ete bapagano basamba liboso na Yo!
Arise, Lord; don’t let them triumph: before your face let the nations be judged.
20 Yawe, tika ete somo ekanga bango; tika ete bapagano bayeba ete bazali na bango kaka bato!
Strike them with fear, Lord: show the nations how frail they are. (Selah)

< Banzembo 9 >