< Banzembo 82 >

1 Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe. 2 Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe? 3 Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola; 4 bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe. 5 Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili; miboko nyonso ya mokili ezali koningana. 6 Nalobaki: « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo! » 7 Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso mpe bokweyaka lokola bakambi. 8 Nzambe, telema, sambisa mokili; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.

< Banzembo 82 >