< Banzembo 62 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi. Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye. 2 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te. 3 Kino tango nini bokosangela moto moko? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya? 4 Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe. 5 Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye. 6 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te. 7 Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe. 8 Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso. 9 Solo, bato bazali lokola molunge, bazali lokola lokuta; Soki batie bango na emekelo kilo, ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo. 10 Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te. 11 Nzambe alobaki mbala moko, ngai nayokaki mbala mibale: « Pamba te makasi ezali ya Nzambe; 12 mpe bolingo ezali ya Nkolo; » mpe « ofutaka moto nyonso kolanda misala na ye. »

< Banzembo 62 >