< Banzembo 6 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo. 2 Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazangi makasi. Yawe, bikisa ngai na bokono, pamba te mikuwa na ngai elembi. 3 Molimo na ngai ezali kotungisama makasi; bongo Yo, Yawe, kino tango nini? 4 Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo. 5 Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo? (Sheol h7585) 6 Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka. 7 Miso na ngai ebebi mpo na mawa; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai. 8 Bino nyonso oyo bosalaka mabe, bolongwa liboso na ngai, pamba te Yawe ayoki kolela na ngai. 9 Yawe ayanoli mabondeli na ngai mpe ayambi losambo na ngai. 10 Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni, mpe somo monene ekokanga bango; bakozonga na sima mpe bakoyoka mbala moko soni.

< Banzembo 6 >