< Banzembo 58 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te. » Nzembo ya Davidi. Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo? Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo?
大衛的金詩,交與伶長。調用休要毀壞。 世人哪,你們默然不語,真合公義嗎? 施行審判,豈按正直嗎?
2 Te, ezala kati na mitema na bino, bosalaka mabongisi ezanga bosembo; botandaka kanza ya maboko na bino kati na mokili.
不然!你們是心中作惡; 你們在地上秤出你們手所行的強暴。
3 Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango, bapengwaka mpe balobaka lokuta wuta na mabumu ya bamama na bango.
惡人一出母胎就與上帝疏遠, 一離母腹便走錯路,說謊話。
4 Bazalaka na ngenge lokola ngenge ya nyoka, lokola ngenge ya etupa oyo eyokaka te, oyo ekangaka litoyi na yango,
他們的毒氣好像蛇的毒氣; 他們好像塞耳的聾虺,
5 oyo eyokaka te ata mingongo ya bato na soloka mpe ya moto ya maji oyo aleki na mayele.
不聽行法術的聲音, 雖用極靈的咒語也是不聽。
6 Nzambe, buka minu na bango kati na minoko na bango; Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.
上帝啊,求你敲碎他們口中的牙! 耶和華啊,求你敲掉少壯獅子的大牙!
7 Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola; Tika ete bambanzi na bango ebukana tango babetaka batolotolo.
願他們消滅,如急流的水一般; 他們瞅準射箭的時候,願箭頭彷彿砍斷。
8 Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe, lokola mwana oyo akomona moyi te mpo ete abimi na zemi oyo esopani.
願他們像蝸牛消化過去, 又像婦人墜落未見天日的胎。
9 Liboso ete banzungu na bino ekutana na moto ya basende, ezala ya mayi to ya kokawuka, bato mabe akolimwa.
你們用荊棘燒火,鍋還未熱, 他要用旋風把青的和燒着的一齊颳去。
10 Moto ya sembo akosepela, pamba te akomona Nzambe kozongisela bato mabe, mabe na mabe, mpe akotambola kati na makila na bango.
義人見仇敵遭報就歡喜, 要在惡人的血中洗腳。
11 Mpe bato bakoloba: « Solo, ezali na lifuti mpo na moto ya sembo; solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili. »
因此,人必說:義人誠然有善報; 在地上果有施行判斷的上帝!

< Banzembo 58 >