< Banzembo 53 >

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na flite. Bazoba bamilobelaka: « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo mabe mpe ya nkele; moko te asalaka bolamu.
For the leader. On mahalath. A maskil of David. Fools say in their heart, ‘There is no God.’ Vile, hateful their life is; not one does good.
2 Wuta na likolo, Nzambe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko ya mayele, oyo atalelaka Nzambe.
From heaven God looks out on humans, to see if any are wise, and care for God.
3 Bango nyonso bazali batomboki, bango nyonso bamibebisa; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te.
But all have turned bad, the taint is on all; not one does good, no, not one.
4 Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te? Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa mpe batikala nanu kobelela Nzambe te, bazali penza kososola eloko moko te?
Have they learned their lesson, those workers of evil? Who ate up my people, eating, devouring, never calling to the Lord.
5 Somo monene ekokanga bango na esika oyo ezali ata na eloko moko te oyo ekoki kopesa bango somo, pamba te Nzambe apanzi mikuwa ya bato oyo bayei kobundisa yo. Okoyokisa bango soni, pamba te Nzambe abwaka bango.
Sore afraid will they be, where no fear was; when God scatters the bones of the godless people. They will be put to shame, when God rejects them.
6 Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona! Tango Nzambe akobimisa bato na Ye na bowumbu, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.
If only help from Zion would come for Israel! When God brings his people a change of fortune, how glad will be Jacob, and Israel how joyful!

< Banzembo 53 >