< Banzembo 50 >

1 Nzembo ya Azafi. Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.
מזמור לאסף אל אלהים יהוה-- דבר ויקרא-ארץ ממזרח-שמש עד-מבאו
2 Wuta na Siona, mboka kitoko, Nzambe azali kongenga lokola moyi.
מציון מכלל-יפי-- אלהים הופיע
3 Tika ete Nzambe na biso aya! Tika ete akanga monoko te! Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa; mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.
יבא אלהינו ואל-יחרש אש-לפניו תאכל וסביביו נשערה מאד
4 Abengi Likolo, kuna na likolo, mpe mabele mpo na kokata makambo ya bato na Ye.
יקרא אל-השמים מעל ואל-הארץ לדין עמו
5 Alobi: « Bosangisela ngai bayengebene na ngai, ba-oyo basalaki Boyokani elongo na ngai na nzela ya mbeka. »
אספו-לי חסידי-- כרתי בריתי עלי-זבח
6 Likolo ekopanza sango ya bosembo na Ye, pamba te azali Nzambe ya bosembo.
ויגידו שמים צדקו כי-אלהים שפט הוא סלה
7 Bino bato na ngai, boyoka; nazali koloba na bino! Isalaele, nakoloba mpo na kotelemela yo: « Ngai Nzambe, nazali Nzambe na yo. »
שמעה עמי ואדברה-- ישראל ואעידה בך אלהים אלהיך אנכי
8 Nakopamela yo te na tina na bambeka na yo, pamba te bambeka na yo ya kotumba ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
לא על-זבחיך אוכיחך ועולתיך לנגדי תמיד
9 Nakozwa ngombe te kati na ndako na yo to ntaba mobali kati na etonga na yo ya bibwele,
לא-אקח מביתך פר ממכלאתיך עתודים
10 pamba te banyama nyonso ya zamba ezali ya ngai; ezala ata ebele ya banyama oyo ezali kati na bangomba, nyonso ezali ya ngai.
כי-לי כל-חיתו-יער בהמות בהררי-אלף
11 Nayebi bandeke nyonso ya bangomba; mpe banyama ya bilanga ezali ya ngai.
ידעתי כל-עוף הרים וזיז שדי עמדי
12 Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo te, pamba te mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya ngai.
אם-ארעב לא-אמר לך כי-לי תבל ומלאה
13 Boni, okanisi penza ete ngai naliaka misuni ya bangombe to namelaka makila ya bantaba?
האוכל בשר אבירים ודם עתודים אשתה
14 Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
זבח לאלהים תודה ושלם לעליון נדריך
15 Mpe belela ngai na tango ya pasi; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.
וקראני ביום צרה אחלצך ותכבדני
16 Nzambe alobi na moto mabe: « Mpo na nini opanzaka sango ya mibeko na ngai mpe olobaka na tina na Boyokani na ngai?
ולרשע אמר אלהים מה-לך לספר חקי ותשא בריתי עלי-פיך
17 Nzokande oyinaka malako na ngai mpe oyokaka te maloba na ngai?
ואתה שנאת מוסר ותשלך דברי אחריך
18 Soki omoni moyibi, wana nde osepeli; mpe ovandaka esika moko na bato na bikobo.
אם-ראית גנב ותרץ עמו ועם מנאפים חלקך
19 Otikaka monoko na yo kosala mabe, lolemo na yo ebimisaka kaka lokuta.
פיך שלחת ברעה ולשונך תצמיד מרמה
20 Ovandaka mpo na kotonga ndeko na yo, mpe obebisaka lokumu ya bana ya mama na yo.
תשב באחיך תדבר בבן-אמך תתן-דפי
21 Yango nde makambo oyo ozalaki kosala; mpe ngai nabatelaki kimia. Okanisi penza ete ngai nazali lokola yo? Nakopamela yo mpe nakotanda makambo nyonso oyo nazwa yo na miso na yo.
אלה עשית והחרשתי-- דמית היות-אהיה כמוך אוכיחך ואערכה לעיניך
22 Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino: bososola makambo oyo; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.
בינו-נא זאת שכחי אלוה פן-אטרף ואין מציל
23 Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »
זבח תודה יכבדנני ושם דרך--אראנו בישע אלהים

< Banzembo 50 >