< Banzembo 40 >

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Natiaki elikya na ngai kati na Yawe; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
Esperei com paciência ao Senhor, e ele se inclinou para mim, e ouviu o meu clamor.
2 Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto; atelemisaki ngai na likolo ya libanga mpe alendisaki makolo na ngai.
Tirou-me dum lago horrível, dum charco de lodo, pôs os meus pés sobre uma rocha, firmou os meus passos,
3 Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai, nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso. Bato ebele bakomona, bakobanga mpe bakotiela Yawe motema.
E pôs um novo cântico na minha boca, um hino ao nosso Deus; muitos o verão, e temerão, e confiarão no Senhor.
4 Esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yawe, kasi atalelaka te bato ya lolendo mpe bakosi.
Bem-aventurado o homem que põe no Senhor a sua confiança, e o que não respeita os soberbos nem os que se desviam para a mentira.
5 Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.
Muitas são, Senhor meu Deus, as maravilhas que tens obrado para conosco, e os teus pensamentos não se podem contar por ordem diante de ti; se eu os quizera anunciar, e deles falar, são mais do que se podem contar.
6 Osepelaki te na bambeka mpe na makabo, kasi ofungolaki matoyi na ngai; osengaki te makabo ya kotumba mpe bambeka mpo masumu.
Sacrifício e oferta não quizeste; as minhas orelhas abriste, holocausto e expiação pelo pecado não reclamaste.
7 Bongo nalobaki: « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.
Então disse: Eis aqui venho; no rolo do livro de mim está escrito.
8 Nzambe na ngai, nasepelaka kosala mokano na Yo, Mobeko na Yo ezali kati na motema na ngai. »
Deleito-me em fazer a tua vontade, ó Deus meu; sim, a tua lei está dentro do meu coração.
9 Nasakolaka bosembo na Yo kati na mayangani, nakokanga monoko na ngai te; Yawe, oyebi yango!
Preguei a justiça na grande congregação; eis que não retive os meus lábios, Senhor, tu o sabes.
10 Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai, natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani, nakobomba yango ata moke te.
Não escondi a tua justiça dentro do meu coração; apregoei a tua fidelidade e a tua salvação: não escondi da grande congregação a tua benignidade e a tua verdade.
11 Yawe, kopimela ngai mawa na Yo te; kasi sala ete bolingo mpe bosolo na Yo ebatelaka ngai tango nyonso.
Não retires de mim, Senhor, as tuas misericórdias; guardem-me continuamente a tua benignidade e a tua verdade.
12 Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai, mabunga na ngai ekomi konyokola ngai, mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango; ezali ebele koleka suki ya moto na ngai, mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
Porque males sem número me tem rodeado: as minhas iniquidades me prenderam de modo que não posso olhar para cima: são muitas mais dos que os cabelos da minha cabeça; pelo que desfalece o meu coração.
13 Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai; Yawe, yaka noki kosunga ngai.
Digna-te, Senhor, livrar-me: Senhor, apressa-te em meu auxílio.
14 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe babungisa lokumu na bango!
Sejam à uma confundidos e envergonhados os que buscam a minha vida para destrui-la; tornem atráz e confundam-se os que me querem mal.
15 Tika ete ba-oyo balobaka na ngai: « Ah! Ah! » bayoka somo mpe bakufa soni!
Desolados sejam em pago da sua afronta os que me dizem: há! há!
16 Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso: « Yawe azali monene! »
Folguem e alegrem-se em ti os que te buscam: digam constantemente os que amam a tua salvação: Magnificado seja o Senhor.
17 Solo, nazali mobola mpe moto akelela, kasi tika ete Nkolo asunga mpe akangola ngai. Nzambe na ngai, kowumela te!
Mas eu sou pobre e necessitado; contudo o Senhor cuida de mim: tu és o meu auxílio e o meu libertador; não te detenhas, ó meu Deus.

< Banzembo 40 >