< Banzembo 38 >

1 Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa. Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.
大衛的紀念詩。 耶和華啊,求你不要在怒中責備我, 不要在烈怒中懲罰我!
2 Pamba te makonga na Yo etoboli ngai, mpe loboko na Yo ebeti ngai.
因為,你的箭射入我身; 你的手壓住我。
3 Mpo na kanda na Yo, nzoto na ngai ebeli; mpo na masumu na ngai, mikuwa na ngai elembi.
因你的惱怒,我的肉無一完全; 因我的罪過,我的骨頭也不安寧。
4 Mabe na ngai eleki moto na ngai, ezali kilo makasi epai na ngai lokola mokumba ya kilo makasi.
我的罪孽高過我的頭, 如同重擔叫我擔當不起。
5 Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solo mpo na bozoba na ngai.
因我的愚昧, 我的傷發臭流膿。
6 Nagumbami, nalembi makasi; nakomi moto ya mawa mpo na libela.
我疼痛,大大拳曲, 終日哀痛。
7 Pamba te nazali koyoka pasi makasi na mokongo na ngai, eteni ata moko te ya nzoto na ngai ezali malamu.
我滿腰是火; 我的肉無一完全。
8 Nalembi, makasi na ngai nyonso esili; mobulu ekoti na motema na ngai, nakomi koganga na kolemba te.
我被壓傷,身體疲倦; 因心裏不安,我就唉哼。
9 Nkolo, oyebi posa na ngai nyonso; kolela na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
主啊,我的心願都在你面前; 我的歎息不向你隱瞞。
10 Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.
我心跳動,我力衰微, 連我眼中的光也沒有了。
11 Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.
我的良朋密友因我的災病都躲在旁邊站着; 我的親戚本家也遠遠地站立。
12 Bato oyo balukaka kufa na ngai bazali kotia mitambo, ba-oyo balukaka pasi na ngai bazali koloba mpo na kosala ngai mabe, bakomi mikolo nyonso kobongisa lokuta.
那尋索我命的設下網羅; 那想要害我的口出惡言, 終日思想詭計。
13 Kasi ngai nazali kosala lokola mokufi matoyi; mpe lokola baba, nakangi monoko, naboyi koloba.
但我如聾子不聽, 像啞巴不開口。
14 Nakomi lokola mokufi matoyi oyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.
我如不聽見的人, 口中沒有回話。
15 Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo; oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.
耶和華啊,我仰望你! 主-我的上帝啊,你必應允我!
16 Nalobaki: « Kopesa nzela te ete basepela na tina na ngai to bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »
我曾說:恐怕他們向我誇耀; 我失腳的時候,他們向我誇大。
17 Pamba te nakomi pene ya kokweya, pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.
我幾乎跌倒; 我的痛苦常在我面前。
18 Solo nandimi mabe na ngai, masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.
我要承認我的罪孽; 我要因我的罪憂愁。
19 Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe, bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.
但我的仇敵又活潑又強壯, 無理恨我的增多了。
20 Bato oyo bazongisaka mabe na bolamu bazali kofunda ngai atako nalukaka kosala bolamu.
以惡報善的與我作對, 因我是追求良善。
21 Yawe, kosundola ngai te; Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.
耶和華啊,求你不要撇棄我! 我的上帝啊,求你不要遠離我!
22 Nkolo, Mobikisi na ngai, yaka noki kosunga ngai.
拯救我的主啊,求你快快幫助我!

< Banzembo 38 >