< Banzembo 37 >

1 Nzembo ya Davidi. Kosilikela bato ya mabe te, kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te;
Dávidé. Ne bosszankodjál az elvetemültekre, ne irígykedjél a gonosztevőkre.
2 pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti.
Mert hirtelen levágattatnak, mint a fű, s mint a gyönge növény elfonnyadnak.
3 Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.
Bízzál az Úrban és jót cselekedjél; e földön lakozzál és hűséggel élj.
4 Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi, mpe akokokisela yo posa ya motema na yo.
Gyönyörködjél az Úrban, és megadja néked szíved kéréseit.
5 Kaba bomoi na yo epai na Yawe, tia elikya kati na Ye, mpe akosala:
Hagyjad az Úrra a te útadat, és bízzál benne, majd ő teljesíti.
6 akongengisa bosembo na yo lokola pole, makoki na yo lokola moyi ya midi.
Felhozza a te igazságodat, mint a világosságot, és a te jogodat, miként a delet.
7 Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
Csillapodjál le az Úrban és várjad őt; ne bosszankodjál arra, a kinek útja szerencsés, se arra, a ki álnok tanácsokat követ.
8 Boya kanda mpe kosilika te; kotomboka te, noki te okosala mabe.
Szünj meg a haragtól, hagyd el heveskedésedet; ne bosszankodjál, csak rosszra vinne!
9 Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa, kasi bato oyo batielaka Yawe motema bakozwa mokili lokola libula na bango.
Mert az elvetemültek kivágattatnak; de a kik az Urat várják, öröklik a földet.
10 Etikali tango moke kaka, moto mabe akozala lisusu te; ata oluki ye, okomona ye te.
Egy kevés idő még és nincs gonosz; nézed a helyét és nincsen ott.
11 Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi.
A szelidek pedig öröklik a földet, és gyönyörködnek nagy békességben.
12 Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.
Fondorkodik a gonosz az igaz ellen, és fogait csikorgatja rá:
13 Kasi Yawe asekaka bato mabe, pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema.
Az Úr neveti őt, mert látja, hogy eljő az ő napja.
14 Bato mabe babimisi mipanga mpe babongisi batolotolo mpo na kokweyisa mobola mpe moto oyo akelela, mpo na koboma bato oyo batambolaka alima.
Fegyvert vonnak a gonoszok; felvonják ívöket, hogy a szegényt és nyomorultat elejtsék, és leöljék az igazán élőket;
15 Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko, mpe batolotolo na bango ekobukana.
De fegyverök saját szívökbe hat, és ívök eltörik.
16 Mwa biloko ya moto ya sembo eleki bozwi ya bato ebele ya mabe,
Jobb a kevés az igaznak, mint a sok gonosznak az ő gazdagsága.
17 pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.
Mert a gonoszok karja eltörik, de az igazakat támogatja az Úr.
18 Yawe ayebi mikolo ya bato bazangi pamela, mpe libula na bango ekowumela mpo na seko.
Jól tudja az Úr a feddhetetleneknek napjait, és hogy örökségök mindörökké meglesz.
19 Na tango ya pasi, bakokawuka te; na mikolo ya nzala, bakozala na bilei ebele.
Nem szégyenülnek meg a veszedelmes időben, és jóllaknak az éhség napjaiban.
20 Kasi bato mabe bakokufa, banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga, bakolimwa lokola molinga.
De a gonoszok elvesznek, és az Úrnak ellensége, mint a liget ékessége, elmúlik, füstként múlik el.
21 Moto mabe adefaka mpe azongisaka te, kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka.
Kölcsön kér a gonosz és meg nem fizet, de az igaz irgalmas és adakozó.
22 Bato oyo Yawe apambolaka bakozwa mokili lokola libula na bango, kasi ba-oyo alakelaka mabe bakolimwa.
Mert a kiket ő megáld, öröklik a földet, és a kiket ő megátkoz, kivágattatnak azok.
23 Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto, alendisaka bomoi na ye;
Az Úr szilárdítja meg az igaz ember lépteit, és útját kedveli.
24 ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.
Ha elesik, nem terül el, mert az Úr támogatja kezével.
25 Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange, namoni nanu te moto ya sembo kosundolama to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei.
Gyermek voltam, meg is vénhedtem, de nem láttam, hogy elhagyottá lett volna az igaz, a magzatja pedig kenyérkéregetővé.
26 Akabaka tango nyonso mpe adefisaka, bana na ye bakozalaka kati na mapamboli.
Mindennapon irgalmatoskodik és kölcsön ad, és az ő magzatja áldott.
27 Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, okovanda na mokili mpo na libela;
Kerüld a rosszat és jót cselekedjél, és megmaradsz mindörökké.
28 pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.
Mert az Úr szereti az ítéletet, és el nem hagyja az ő kegyeseit; megőrzi őket mindörökké, a gonoszok magvát pedig kiirtja.
29 Bato ya sembo bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakovanda kuna seko na seko.
Az igazak öröklik a földet, és mindvégig rajta lakoznak.
30 Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.
Bölcseséget beszél az igaznak szája, és a nyelve ítéletet szól.
31 Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye, makolo na ye ebetaka libaku te.
Istenének törvénye van szívében, lépései nem ingadoznak.
32 Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe mpe alukaka nzela ya koboma ye,
Leselkedik a gonosz az igazra, és halálra keresi azt;
33 kasi Yawe akosundola moto ya sembo te kati na maboko ya moto mabe, mpe akokweyisa ye te na kosambisama.
De az Úr nem hagyja azt annak kezében, sem nem kárhoztatja, mikor megítéltetik.
34 Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.
Várjad az Urat, őrizd meg az ő útját; és fölmagasztal téged, hogy örököld a földet; és meglátod, a mikor kiirtatnak a gonoszok.
35 Namonaki moto mabe mpe na kanza kokoma na nguya mpe kofuluka lokola nzete oyo ezali kokola na mabele na yango,
Láttam elhatalmasodni a gonoszt és szétterjeszkedett az, mint egy gazdag lombozatú vadfa;
36 kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te.
De elmult és ímé nincsen! kerestem, de nem található.
37 Tala malamu moto oyo azangi pamela, landela bomoi ya moto ya sembo; tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.
Ügyelj a feddhetetlenre, nézd a becsületest, mert a jövendő a béke emberéé.
38 Kasi batomboki bakobebisama, tango oyo ezali koya ezali te mpo na bato mabe.
De a bűnösök mind elvesznek; a gonosznak vége pusztulás.
39 Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango, oyo batonga makasi.
Az igazak segedelme pedig az Úrtól van; ő az ő erősségök a háborúság idején.
40 Yawe asungaka mpe akangolaka bango, akangolaka bango wuta na maboko ya bato mabe mpe abikisaka bango, pamba te babombamaka kati na Ye.
Megvédi őket az Úr és megszabadítja őket; megszabadítja őket a gonoszoktól és megsegíti őket, mert ő benne bíznak.

< Banzembo 37 >