< Banzembo 36 >

1 Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Kati na motema na ngai, nazali na sango kowuta na Nzambe na tina na bato mabe oyo batondi na masumu: Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.
耶和華的僕人大衛的詩,交與伶長。 惡人的罪過在他心裏說: 我眼中不怕上帝!
2 Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.
他自誇自媚, 以為他的罪孽終不顯露,不被恨惡。
3 Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.
他口中的言語盡是罪孽詭詐; 他與智慧善行已經斷絕。
4 Ezala na bambeto na bango, basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe, batambolaka te mpo na kosala bolamu mpe baboyaka mabe te.
他在床上圖謀罪孽, 定意行不善的道,不憎惡惡事。
5 Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo, boyengebene na Yo kino na mapata.
耶和華啊,你的慈愛上及諸天; 你的信實達到穹蒼。
6 Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.
你的公義好像高山; 你的判斷如同深淵。 耶和華啊,人民、牲畜,你都救護。
7 Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.
上帝啊,你的慈愛何其寶貴! 世人投靠在你翅膀的蔭下。
8 Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo, mpe omelisaka bango mayi kowuta na bolingo monene na Yo.
他們必因你殿裏的肥甘得以飽足; 你也必叫他們喝你樂河的水。
9 Pamba te etima ya bomoi ezali elongo na Yo; kati na pole na Yo nde tomonaka pole.
因為,在你那裏有生命的源頭; 在你的光中,我們必得見光。
10 Koba kotalisa bolingo na Yo epai ya bato oyo bayebi Yo, mpe bosembo na Yo epai ya bato ya mitema alima.
願你常施慈愛給認識你的人, 常以公義待心裏正直的人。
11 Tika ete bato ya lolendo bakoma te kino epai na ngai, mpe tika ete bato mabe babengana ngai te.
不容驕傲人的腳踐踏我; 不容凶惡人的手趕逐我。
12 Tala ndenge nini bato ya misala mabe bakweyi, balali na mabele, bazangi makoki ya kotelema.
在那裏,作孽的人已經仆倒; 他們被推倒,不能再起來。

< Banzembo 36 >