< Banzembo 31 >

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo; kondima te ete nayoka soni! Bikisa ngai na bosembo na Yo!
大衛的詩,交與伶長。 耶和華啊,我投靠你; 求你使我永不羞愧; 憑你的公義搭救我!
2 Yoka ngai mpe kangola ngai noki! Zala mpo na ngai libanga oyo ezingelami na bamir mpe ndako batonga makasi mpo na kobikisa ngai.
求你側耳而聽, 快快救我! 作我堅固的磐石, 拯救我的保障!
3 Mpo ete ozali libanga na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, kamba mpe tambolisa ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
因為你是我的巖石,我的山寨; 所以,求你為你名的緣故引導我,指點我。
4 Bikisa ngai na motambo oyo batieli ngai, pamba te ozali ebombamelo na ngai.
求你救我脫離人為我暗設的網羅, 因為你是我的保障。
5 Nazongisi molimo na ngai kati na maboko na Yo, Yawe, Nzambe ya solo, oyo okangolaki ngai.
我將我的靈魂交在你手裏; 耶和華誠實的上帝啊,你救贖了我。
6 Nalingaka te bato nyonso oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko, pamba te natiaka elikya na ngai kati na Yawe.
我恨惡那信奉虛無之神的人; 我卻倚靠耶和華。
7 Nakozalaka moto ya esengo mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo; pamba te omonaka pasi na ngai, mpe oyebi mitungisi na ngai.
我要為你的慈愛高興歡喜; 因為你見過我的困苦,知道我心中的艱難。
8 Okabaki ngai te na maboko ya monguna na ngai, kasi obombaka ngai mosika, na esika ya kimia penza.
你未曾把我交在仇敵手裏; 你使我的腳站在寬闊之處。
9 Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazali kati na pasi; miso, motema mpe nzoto na ngai mobimba ebebi mpo na mawa.
耶和華啊,求你憐恤我, 因為我在急難之中; 我的眼睛因憂愁而乾癟, 連我的身心也不安舒。
10 Bomoi na ngai ekawuki mpo na pasi, mpe mibu na ngai ezali koleka kati na kolela; makasi na ngai esili mpo na mabe na ngai, mpe mikuwa na ngai elembi.
我的生命為愁苦所消耗; 我的年歲為歎息所曠廢。 我的力量因我的罪孽衰敗; 我的骨頭也枯乾。
11 Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai lokola eloko ya lisuma, baninga na ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya soni, mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya somo.
我因一切敵人成了羞辱, 在我的鄰舍跟前更甚; 那認識我的都懼怕我, 在外頭看見我的都躲避我。
12 Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.
我被人忘記,如同死人,無人記念; 我好像破碎的器皿。
13 Nayokaka matongi na bango na tina na ngai tango basanganaka mpe basalaka makita mpo na koluka ndenge nini koboma ngai.
我聽見了許多人的讒謗, 四圍都是驚嚇; 他們一同商議攻擊我的時候, 就圖謀要害我的性命。
14 Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo, Yawe, mpe nalobaka: « Ozali Nzambe na ngai. »
耶和華啊,我仍舊倚靠你; 我說:你是我的上帝。
15 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kati na maboko na Yo; kangola ngai wuta na maboko ya banguna mpe ya bayini na ngai.
我終身的事在你手中; 求你救我脫離仇敵的手和那些逼迫我的人。
16 Tala ngai mosali na Yo, na miso ya bolingo; bikisa ngai kati na bolingo na Yo.
求你使你的臉光照僕人, 憑你的慈愛拯救我。
17 Yawe, sala ete nayokisama soni te, pamba te nabeleli Yo. Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni mpe bakita kino na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
耶和華啊,求你叫我不致羞愧, 因為我曾呼籲你; 求你使惡人羞愧, 使他們在陰間緘默無聲。 (Sheol h7585)
18 Tika ete ekangama, bibebu oyo elobaka lokuta, oyo elobaka na lolendo mpe na lofundu, oyo ebebisaka lokumu ya moto ya sembo na nzela ya songisongi.
那撒謊的人逞驕傲輕慢, 出狂妄的話攻擊義人; 願他的嘴啞而無言。
19 Boboto na Yo ezali penza monene, boboto oyo obombaka mpo na bato oyo batosaka Yo, boboto oyo otalisaka epai ya bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, na miso ya bato nyonso.
敬畏你、投靠你的人,你為他們所積存的, 在世人面前所施行的恩惠是何等大呢!
20 Obombaka bango epai na Yo, mosika ya mabongisi mabe ya bato; obatelaka bango kati na Yo, mosika ya bato oyo babundisaka bango.
你必把他們藏在你面前的隱密處, 免得遇見人的計謀; 你必暗暗地保守他們在亭子裏, 免受口舌的爭鬧。
21 Tika ete Yawe akumisama, pamba te atalisaki ngai bolingo na Ye ya kokamwa, tango nazalaki kati na engumba oyo ezingelamaki na banguna!
耶和華是應當稱頌的, 因為他在堅固城裏向我施展奇妙的慈愛。
22 Kati na kobanga na ngai, namilobelaki: « Obengani ngai penza mosika na Yo! » Nzokande oyokaki ngai wana nazalaki kobondela Yo mpe wana nazalaki kobelela Yo.
至於我,我曾急促地說: 我從你眼前被隔絕。 然而,我呼求你的時候, 你仍聽我懇求的聲音。
23 Bino babulami na Ye nyonso, bolinga Yawe! Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye, kasi apesaka etumbu ya makasi epai ya bato ya lofundu.
耶和華的聖民哪,你們都要愛他! 耶和華保護誠實人, 足足報應行事驕傲的人。
24 Bino nyonso oyo botalelaka Yawe, bozala makasi mpe boyika mpiko.
凡仰望耶和華的人, 你們都要壯膽,堅固你們的心!

< Banzembo 31 >