< Banzembo 30 >

1 Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo. Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.
A psalm; a song at the dedication of the temple. A psalm of David. I will exalt you, Yahweh, for you have raised me up and have not allowed my enemies to rejoice over me.
2 Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo mpo na kosenga lisungi, mpe obikisaki ngai na bokono.
Yahweh my God, I cried to you for help, and you healed me.
3 Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi, obatelaki bomoi na ngai mosika na bato oyo bazali kokita na libulu. (Sheol h7585)
Yahweh, you have brought up my soul from Sheol; you have kept me alive from going down to the grave. (Sheol h7585)
4 Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye; bokumisa Kombo na Ye ya bule.
Sing praises to Yahweh, you his faithful people! Give thanks when you remember his holiness.
5 Pamba te kanda makasi na Ye ewumelaka mpo na mwa tango moke, kasi ngolu na Ye ewumelaka seko na seko; kolela ekoki kowumela kino na pokwa, kasi kosepela ekokota na tongo.
For his anger is only for a moment; but his favor is for a lifetime. Weeping comes for a night, but joy comes in the morning.
6 Tango nazalaki na kimia, nalobaki: « Nakotikala kokweya te. »
In confidence I said, “I will never be shaken.”
7 Yawe, tango osalelaki ngai ngolu, olendisaki ngomba na ngai; kasi tango obombelaki ngai elongi, nabungisaki elikya.
Yahweh, by your favor you established me as a strong mountain; but when you hid your face, I was troubled.
8 Yawe, nabelelaki Yo; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi:
I cried to you, Yahweh, and sought favor from my Lord!
9 « Litomba nini ezali soki nakufi, soki nakiti na libulu? Boni, putulu ekokumisa Yo? Boni, ekosakola boyengebene na Yo?
What advantage is there in my death, if I go down to the grave? Will the dust praise you? Will it declare your trustworthiness?
10 Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu; Yawe, zala lisungi na ngai. »
Hear, Yahweh, and have mercy on me! Yahweh, be my helper.
11 Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
You have turned my mourning into dancing; you have removed my sackcloth and clothed me with gladness.
12 mpo ete molimo na ngai ekumisa Yo na banzembo, kasi navanda nye te. Yawe, Nzambe na ngai, nakokumisa Yo libela na libela.
So now my glory will sing praise to you and not be silent; Yahweh my God, I will give thanks to you forever!

< Banzembo 30 >