< Banzembo 29 >

1 Nzembo ya Davidi. Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe, bopesa Yawe nkembo mpe makasi. 2 Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye. 3 Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene. 4 Mongongo ya Yawe ezali na nguya; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi. 5 Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele; Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani. 6 Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe, apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa. 7 Mongongo ya Yawe ebimaka elongo na bakake ya moto. 8 Mongongo ya Yawe elengisaka esobe; Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi. 9 Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota, esalaka mpe ete zamba etikala pamba. Kati na Tempelo ya Yawe, nyonso egangaka: « Nkembo! » 10 Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela. 11 Yawe apesaka bato na Ye makasi; Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.

< Banzembo 29 >