< Banzembo 22 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. » Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai? Mpo na nini otelemi mosika? Mpo na nini ozali kobikisa ngai te? Mpo na nini ozali koyoka te koganga na ngai? 2 Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo, kasi oyanoli ngai te; na butu, nabeleli lisusu, mpe natikali kovanda nye te. 3 Nzokande, ozali Mosantu, ovandaka na Kiti na Yo ya Bokonzi, kati na masanzoli ya Isalaele. 4 Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo, bamipesaki epai na Yo, mpe okangolaki bango. 5 Bagangaki epai na Yo, mpe Yo okangolaki bango; batiaki elikya na bango kati na Yo mpe bayokisamaki soni te. 6 Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi; bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai. 7 Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba: 8 « Atiaka motema na ye epai na Yawe; tika ete Yawe abikisa ye! Tika ete Yawe akangola ye, pamba te asepelaka na Ye! » 9 Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai, obatelaki ngai na kimia na tolo na ye. 10 Wuta mbotama na ngai, batikaki ngai na maboko na Yo; wuta libumu ya mama na ngai, ozali Nzambe na ngai. 11 Kozala mosika na ngai te, pamba te pasi ekomi pene mpe nazangi moto oyo akosunga ngai. 12 Banguna na ngai bazingeli ngai lokola lisanga ya bangombe ya mibali, bazingeli ngai lokola banyama mabe oyo ezalaka na Bashani; 13 mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bango lokola nkosi oyo etomboki mpe ezali kolia nyama. 14 Nakomi lokola mayi oyo ezali kosopana, mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani; motema na ngai ekomi lokola mafuta oyo ezali konyangwama kati na ngai. 15 Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te; otie ngai pembeni ya lilita. 16 Bambwa ezingeli ngai, ngulupa ya bato mabe bayei kobundisa ngai, bazali kotambola zingazinga na ngai; bakangi maboko mpe makolo na ngai na basinga. 17 Nakoki sik’oyo kotanga ata mikuwa na ngai nyonso; kasi bato bazali kotala mpe koseka ngai, 18 bazali kokabola bilamba na ngai mpe kobeta zeke mpo na nzambala na ngai. 19 Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te! Ozali makasi na ngai; yaka noki kosunga ngai. 20 Bikisa bomoi na ngai liboso ya mopanga, mpe kangola yango wuta na manzaka ya bambwa. 21 Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi mpe na maseke ya mpakasa. 22 Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai, mpe nakokumisa Yo kati na mayangani. 23 Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye! 24 Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi. 25 Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani, nakokisaka bandayi na ngai na miso ya bato oyo batosaka Yo. 26 Babola bakolia mpe bakotonda; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela. 27 Mokili mobimba ekokanisa Yawe, ekomipesa epai na Ye; mpe bituka nyonso ya bikolo ekogumbama liboso na Ye. 28 Pamba te Yawe azali Mokonzi, azali kokonza bikolo. 29 Bazwi nyonso ya mokili bakolia mpe bakogumbamela Ye; bato nyonso oyo bazali kokende na kunda, ba-oyo bakoki te komibatela na bomoi, bakogumbama liboso na Ye. 30 Bakitani na bango bakosalela Yawe mpe bakopanza sango na Ye epai ya ekeke oyo ekoya na sima; 31 bakosakola misala ya bosembo na Ye, epai ya bato oyo bakobotama.

< Banzembo 22 >