< Banzembo 137 >

1 Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona. 2 Todiembikaki mandanda na biso na banzete ya pepiliye ya etuka yango. 3 Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu bazalaki kosenga biso banzembo; mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso ete tozala na esengo. Bazalaki koloba: « Boyembela biso banzembo ya Siona! » 4 Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini na mabele ya bapaya? 5 Oh Yelusalemi, soki nabosani yo, wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba! 6 Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi, soki natie yo te liboso ya esengo nyonso, wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai! 7 Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa; bazalaki koganga: « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango! » 8 Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso! 9 Esengo na moto oyo akokanga bana na yo mpe akonika bango na libanga!

< Banzembo 137 >