< Banzembo 136 >

1 Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu; 2 Bosanzola Nzambe ya banzambe; 3 Bosanzola Nkolo na bankolo; 4 Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene; 5 Akelaki likolo na mayele na Ye; 6 Atandaki mabele na likolo ya mayi; 7 Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole; 8 moyi mpo na kongengisa mokolo; 9 sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu; 10 Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito; 11 Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito; 12 na nguya monene ya loboko na Ye; 13 Akabolaki ebale monene ya Barozo na biteni mibale; 14 Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo; 15 Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo; 16 Atambolisaki bato na Ye kati na esobe; 17 Abetaki bakonzi minene; 18 Abomaki bakonzi ya nguya; 19 Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori; 20 mpe Ogi, mokonzi ya Bashani; 21 Akabaki mabele na bango lokola libula; 22 lokola libula epai ya Isalaele, mosali na Ye; 23 Akanisaki biso tango basambwisaki biso; 24 Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso; 25 Apesaka bilei na bikelamu nyonso; 26 Bosanzola Nzambe ya likolo;

< Banzembo 136 >