< Banzembo 119 >

1 Esengo na bato oyo bazangi pamela mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe!
Happy they whose life is blameless, who walk by the law of the Lord.
2 Esengo na bato oyo babatelaka malako na Ye mpe balukaka Ye na mitema na bango mobimba!
Happy they who keep his charges, and seek him with all their hearts;
3 Basalaka mabe te, kasi balandaka banzela ya Nzambe.
who have done no wrong, but walk in his ways.
4 Opesaki mibeko mpo ete etosama malamu.
You yourself have appointed your precepts to be kept with diligence.
5 Tika ete nabongisa etamboli na ngai mpo ete natosa mitindo na Yo!
O to be steadily guided in the keeping of your statutes!
6 Na bongo, nakoyoka soni te tango nakotosa mibeko na Yo nyonso.
Then unashamed shall I be, when I look towards all your commandments.
7 Nakosanzola Yo na motema ya sembo wana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo.
I will thank you with heart unfeigned, when I learn your righteous judgments.
8 Nalingi kotosa mitindo na Yo; kosundola ngai libela te!
I will observe your statutes: O forsake me not utterly.
9 Ndenge nini elenge akoki kowumela na nzela ya sembo? Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
How can a young person keep their life pure? By giving heed to your word.
10 Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba; batela ngai mpo ete napengwa te mosika ya mibeko na Yo!
With all my heart have I sought you, let me not stray from your commandments.
11 Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
In my heart have I treasured your word, to keep from sinning against you.
12 Yawe, tika ete opambolama! Lakisa ngai mitindo na Yo!
Blessed are you, O Lord; teach me your statutes.
13 Na monoko na ngai, natangaka mibeko na Yo nyonso.
With my lips have I rehearsed all the judgments of your mouth.
14 Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo lokola nde nazali na bomengo nyonso.
I delight in the way of your charges, more than in riches of all sorts.
15 Nakanisaka malako na Yo mpe natambolaka na banzela na Yo.
I will muse upon your precepts, and look to your paths.
16 Nasepelaka mingi na malako na Yo mpe nabosanaka liloba na Yo te.
In your statutes I delight, I will not forget your word.
17 Salela ngai, mosali na Yo, bolamu mpo ete nabika mpe natosa liloba na Yo.
Grant that your servant may live, and I will observe your word.
18 Fungola miso na ngai mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.
Open my eyes, that I see wondrous things out of your law.
19 Nazali mopaya awa na mokili; kobombela ngai mibeko na Yo te.
But a guest am I on the earth: hide not your commandments from me.
20 Molimo na ngai ezalaka tango nyonso na posa makasi ya koyeba mibeko na Yo.
My heart is crushed with longing for your ordinances, at all times.
21 Otelemelaka bato ya lofundu, bato oyo balakelama mabe mpe bapengwaka mosika ya mibeko na Yo.
You rebuke the proud, the accursed, who wander from your commandments.
22 Longola soni mpe kotiolama na bomoi na ngai, pamba te natosaka malako na Yo.
Roll away from me scorn and contempt, for I have observed your charges.
23 Ezala soki bakambi basali likita mpe bayokani kotelemela ngai, mosali na Yo, nakokanisa kaka mitindo na Yo.
Though princes sit plotting against me, your servant will muse on your statutes.
24 Malako na Yo esepelisaka ngai makasi, epesaka ngai toli.
Your charges are my delight, they are my counsellors.
25 Nakangami na putulu; batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo.
I lie grovelling in the dust; revive me, as you have promised.
26 Nayebisaki Yo banzela na ngai, mpe oyanolaki ngai; lakisa ngai mibeko na Yo!
I told of my ways, you made answer; teach me your statutes.
27 Sala ete nasosola nzela ya mitindo na Yo mpo ete nakanisa misala minene na Yo!
Grant me insight into your precepts, and I will muse on your wonders.
28 Nazali kolela mpo na pasi na motema; pesa ngai mpiko kolanda liloba na Yo.
I am overcome with sorrow; raise me up, as you have promised.
29 Mema ngai mosika ya nzela ya lokuta; mpe, na boboto na Yo, teya ngai mobeko na Yo.
Put the way of falsehood from me, and graciously grant me your law.
30 Naponaki nzela ya bosolo; natambolaka kolanda mibeko na Yo.
I have chosen the way of fidelity, your ordinances I long for.
31 Nakangami na malako na Yo; Yawe, koyokisa ngai soni te.
I hold fast to your charges: O put me not, Lord, to shame.
32 Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te opesaka ngai bososoli na yango.
I will run in the way of your commandments, for you give me room of heart.
33 Yawe, teya ngai nzela ya mitindo na Yo mpo ete nabatela yango kino na suka.
Teach me, O Lord, the way of your statutes, and I will keep it to the end,
34 Pesa ngai bososoli mpo ete natosa mibeko na Yo mpe nalanda yango na motema na ngai mobimba.
instruct me to keep your law, and I will observe it with all my heart.
35 Tambolisa ngai kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te nasepelaka na yango.
Guide me in the path of your commandments, for therein do I delight.
36 Sala ete motema na ngai esepela na malako na Yo, kasi na bomengo te!
Incline my heart to your charges, and not to greed of gain.
37 Longola miso na ngai na makambo ya pamba, batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo!
Turn away my eyes from vain sights, revive me by your word.
38 Kokisela mosali na Yo bilaka oyo opesaki mpo na bato oyo batosaka Yo.
Confirm to your servant the promise which is given to those who fear you.
39 Longola mosika na ngai soni oyo nabangaka, pamba te mibeko na Yo ezali malamu.
Remove the reproach which I dread, because your judgments are good.
40 Nasepelaka makasi na mibeko na Yo; batela bomoi na ngai kati na bosembo na Yo!
Behold, I long for your precepts. Quicken me in your righteousness.
41 Yawe, tika ete bolingo ekomela ngai, mpe lobiko na Yo, kolanda elaka na Yo;
Visit me, Lord, with your love and salvation, as you have promised.
42 bongo nakokoka kozwa eyano ya kopesa na mofingi na ngai, pamba te natiaka elikya na liloba na Yo.
So shall I answer my slanderers, for my trust is in your word.
43 Tika ete monoko na ngai elobaka kaka bosolo, pamba te natiaka elikya kati na mibeko na Yo.
Snatch not from my mouth the word of truth, for in your judgments I hope.
44 Nakotosa mibeko na Yo tango nyonso, mpe libela na libela.
I will keep your law continually, for ever and evermore.
45 Nakobika na bonsomi ya solo, pamba te nasepelaka kotosa mitindo na Yo.
So shall I walk in wide spaces, for I give my mind to your precepts.
46 Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzi na kozanga koyoka soni.
I will speak of your charge before kings, and will not be ashamed thereof.
47 Nasepelaka mingi na mibeko na Yo mpe nalingaka yango mingi.
Your commandments are my delight, I love them exceedingly.
48 Nalapi ndayi mpo na mibeko na Yo, oyo nalingaka, mpe nakokanisa mitindo na Yo.
I will lift up my hands to your commandments, and muse upon your statutes.
49 Kanisa makambo oyo olobaki na mosali na Yo, pamba te opesaki ngai elikya.
Remember your word to your servant, on which you have made me to hope.
50 Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka; batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
This is my comfort in trouble, that your word gives life to me.
51 Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi; kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo.
The arrogant utterly scorn me, but I have not declined from your law.
52 Yawe, tango nakanisaka mikano na Yo ya kala, nazwaka kati na yango kobondisama.
When I think of your judgments of old, O Lord, I take to me comfort.
53 Nayokaka pasi mingi na motema tango namonaka bato mabe kosundola mibeko na Yo.
I am seized with glowing anger at the wicked who forsake your law.
54 Nakoma koyemba mitindo na Yo na bisika nyonso epai wapi nazali moleki nzela.
Your statutes have been to me songs in the house of my pilgrimage.
55 Yawe, nakanisaka Yo na butu mpo ete nabatela mibeko na Yo;
I remember your name in the night, O Lord and observe your law.
56 pamba te libula na ngai ezali: kotosa mibeko na Yo.
My lot has been this, that I have kept your precepts.
57 Yawe, nalobi lisusu ete libula na ngai ezali: kotosa liloba na Yo.
My portion are you, O Lord: I have promised to keep your words.
58 Na motema na ngai mobimba, nalukaka kosepelisa Yo; salela ngai ngolu kolanda bilaka na Yo!
I entreat you with all my heart; grant me your promised favour.
59 Natali malamu etamboli na ngai mpe namizongisi kati na malako na Yo.
I have thought upon my ways, and turned my feet to your charges.
60 Natosaka mibeko na Yo noki, nazelisaka te.
I hasted and tarried not to give heed to your commandments.
61 Solo, mitambo ya bato mabe ekangaki ngai, kasi ngai nabosanaki te mibeko na Yo.
Though the godless have wound their cords round me, I have not forgotten your law.
62 Na kati-kati ya butu, nalamukaka mpo na kokumisa Yo likolo na mibeko na Yo ya sembo.
At midnight I rise to praise you because of your righteous judgments.
63 Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yo mpe babatelaka mitindo na Yo.
With all those who fear you I company, aid with those who observe your precepts.
64 Yawe, mokili etondi na bolingo na Yo; lakisa ngai mitindo na Yo!
The earth, Lord, is full of your kindness; teach me your Statutes.
65 Yawe, salela mosali na Yo bolamu kolanda liloba na Yo.
Well have you dealt with your servant, as you have promised, O Lord.
66 Teya ngai bolamu ya bososoli mpe ya mayele, pamba te namipesaka na mibeko na Yo.
Teach me discretion and knowledge, for I have believed your commandments.
67 Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi; kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.
Till trouble came I was a wanderer, but now I observe your word.
68 Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu; teya ngai mitindo na Yo!
You are good and do good; teach me your statutes.
69 Bato ya lolendo bakoselaka ngai makambo; kasi ngai, natosaka mitindo na Yo na motema na ngai mobimba.
The proud have forged lies against me, but I keep your precepts with all my heart.
70 Mitema na bango ezali mabanga; kasi ngai, nasepelaka na mibeko na Yo.
Their heart is gross like fat, but I delight in your law.
71 Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai, mpo ete nayekola mitindo na Yo.
It was good for me to be humbled, that I should learn your statutes.
72 Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolaki na monoko na Yo ezali malamu koleka biloko nkoto moko ya wolo mpe ya palata.
The law of your mouth is better to me than thousands of pieces of silver and gold.
73 Osalaki mpe olendisaki ngai na maboko na Yo, pesa ngai mayele mpo ete nayekola mibeko na Yo!
Your hands have made me and fashioned me; make me wise to learn your commandments.
74 Tango bato oyo batosaka Yo bamonaka ngai, basepelaka makasi, mpo ete natiaka elikya na liloba na Yo.
Those who fear you shall see me with joy, for in your word have I hoped.
75 Yawe, nayebi malamu ete mibeko na Yo ezali sembo, mpe ete ezali kaka mpo na bolingo na Yo nde obetaki ngai.
I know, O Lord, that your judgments are right, and in faithfulness you have afflicted me.
76 Tika ete bolingo na Yo ebondisa ngai, kolanda elaka na Yo epai ya mosali na Yo!
Let your love be a comfort to me, for so have you promised your servant.
77 Talisa ngai mawa na Yo mpo ete nabika, pamba te nasepelaka na mibeko na Yo.
Visit me with your quickening pity, for your law is my delight.
78 Tika ete bato wana ya lofundu, oyo bamonisaka ngai pasi na kozanga tina, bakufa soni! Kasi ngai nakokanisa kaka mibeko na Yo.
Put the proud to shame, who have wronged me falsely: I will muse on your precepts.
79 Tika ete bato oyo batosaka Yo, ba-oyo bayebi malako na Yo, bazongela ngai.
Let those turn to me who fear you, that they may learn your charges.
80 Tika ete motema na ngai ezanga pamela mpo na kotosa mitindo na Yo, mpo ete nakufa soni te.
Let my heart be sound in your statutes, that I may not be put to shame.
81 Natondi na posa ya lobiko na Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
My long for you to rescue me, I put my hope in your word.
82 Miso na ngai elembi kozela kokokisama ya elaka na Yo; nakomi komituna: « Okobondisa ngai tango nini? »
My eyes pine away for your promise: saying, ‘When will you comfort me?’
83 Nakomi lokola mbeki oyo ezali kokawuka na milinga, nzokande nabosanaka mitindo na Yo te.
Though shrivelled like wine-skin in smoke, your statutes I have not forgotten.
84 Mikolo ya bomoi ya mosali na Yo ezali motango boni? Mokolo nini okopesa banyokoli na ngai etumbu?
How few are the days of your servant! When will you judge those who harass me?
85 Bato ya lolendo batimoli mabulu mpo na kokanga ngai, baboyi kotosa mibeko na Yo.
Proud people have dug for me pits people who do not conform to your law.
86 Mibeko na Yo nyonso ezali sembo; kasi bazali konyokola ngai kaka pamba; yaka kosunga ngai!
All your commandments are trusty. With falsehood they harass me: help me.
87 Etikali moke mpo ete balongola ngai na mokili; kasi atako bongo, nasundoli mibeko na Yo te.
They had nearly made an end of me, yet I did not forget your precepts.
88 Kati na bolingo na Yo, batela bomoi na ngai mpo ete natosa malako na Yo.
Spare me in your kindness, and I will observe the charge of your mouth.
89 Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko, epikama kati na likolo;
Forever, O Lord, is your word fixed firmly in the heavens.
90 boyengebene na Yo ekowumela seko na seko. Okela mabele, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo;
Your truth endures age after age; it is established on earth, and it stands.
91 opesa mibeko, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo, pamba te nyonso kati na mokili mobimba epesaka Yo lokumu.
By your appointment they stand this day, for all are your servants.
92 Soki nasepelaki na mibeko na Yo te, mbele nakufa kala kati na pasi na ngai.
Had not your law been my joy, in my misery then had I perished.
93 Nakotikala kobosana ata moke te mitindo na Yo, pamba te obatelaka bomoi na ngai na nzela na yango.
I will never forget your precepts, for through them you have put life in me.
94 Bikisa ngai, pamba te nazali moto na Yo mpe natosaka mitindo na Yo!
I am yours, O save me, for I give my mind to your precepts.
95 Bato mabe bazali koluka koboma ngai, kasi ngai nakangami kaka na malako na Yo.
The wicked lay wait to destroy me, but I give heed to your charge.
96 Na nyonso oyo emonanaka lokola ya kokoka, namonaki mondelo; kasi mibeko na Yo ezalaka na mondelo te.
I have seen a limit to all things: but your commandment is spacious exceedingly.
97 Nalingaka mibeko na Yo mingi! Nakanisaka yango mikolo nyonso.
O how I love your law! All the day long I muse on it.
98 Mibeko na Yo ekomisaka ngai moto ya bwanya koleka banguna na ngai; ezalaka elongo na ngai tango nyonso.
Your commandment makes me wiser than my enemies: for it is mine forever.
99 Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele, pamba te nakanisaka malako na Yo.
I am prudent above all my teachers, for your charges are my (meditation)
100 Naleki mibange na bososoli, pamba te natosaka mibeko na Yo.
I have insight more than the aged, because I observe your precepts.
101 Natambolaka te na banzela nyonso ya mabe mpo na kotosa liloba na Yo.
I refrain my foot from all wicked ways, that I may keep your word.
102 Nakangamaka na mibeko na Yo, pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango.
I turn not aside from your judgments, for you yourself are my teacher.
103 Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.
How sweet are your words to my taste, sweeter than honey to my mouth!
104 Mitindo na Yo ekomisi ngai moto ya bososoli; yango wana nayinaka nzela nyonso ya mabe.
Insight I win through your precepts, therefore every false way I hate.
105 Liloba na Yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.
Your word is a lamp to my feet, and a light to my path.
106 Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango: « Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »
I have sworn an oath, and will keep it, to observe your righteous judgments.
107 Motema na ngai etutami makasi; Yawe, batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo.
I am afflicted sorely: revive me, O Lord, as you said.
108 Yawe, ndima likabo ya bibebu na ngai, mpe teya ngai mibeko na Yo.
Accept, Lord, my willing praise, and teach me your judgments.
109 Solo, nakutanaka tango nyonso na makama, kasi nabosanaka mibeko na Yo te.
My life is in ceaseless peril; but I do not forget your law.
110 Bato mabe batiaka mitambo mpo ete nakweya, kasi nakangamaka kaka na mibeko na Yo.
The wicked set traps for me, yet I do not stray from your precepts.
111 Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.
In your charges are my everlasting inheritance, they are the joy of my heart.
112 Nazwa mokano ya kotambola kolanda mitindo na Yo, tango nyonso, kino na suka.
I am resolved to perform your statutes forever, to the utmost.
113 Nayinaka bato ya mitema mibale, kasi nalingaka nde mibeko na Yo.
I hate people of divided heart, but your law do I love.
114 Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai; natiaka elikya kati na liloba na Yo.
You are my shelter and shield: in your word do I hope.
115 Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai! Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai!
Begone, you wicked people, I will keep the commands of my God.
116 Sunga ngai kolanda elaka na Yo, mpe nakobika; koyokisa elikya na ngai soni te.
Uphold me and spare me, as you have promised: O disappoint me not.
117 Sunga ngai mpo ete nabika; nakotikala kobosana mitindo na Yo ata moke te.
Hold me up, and I shall be saved: and your statutes shall be my unceasing delight.
118 Obwakaka bato nyonso oyo bapesaka mitindo na Yo mokongo, pamba te mokano na bango ezalaka ya lokuta.
All who swerve from your statutes you spurn: their cunning is in vain.
119 Olongolaka bato nyonso ya mabe ya mokili lokola bosoto; yango wana nalingaka malako na Yo.
All the wicked of earth you count as dross, therefore I love your charges.
120 Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.
My flesh, for fear of you, shudders, and I stand in awe of your judgments.
121 Natambolaka na bosembo mpe bosolo; kokaba ngai na maboko ya banyokoli na ngai te!
Justice and right have I practised, do not leave me to my oppressors.
122 Kamata mokumba ya bolamu na ngai, mosali na Yo; tika ete bato ya lolendo banyokola ngai te.
Be your servant’s surety for good, let not the proud oppress me.
123 Miso na ngai elembi kozela lisungi kowuta na Yo mpe kokokisama ya bosembo na Yo kolanda elaka na Yo.
My eyes pine for your salvation, and for your righteous promise.
124 Salela ngai, mosali na Yo, kolanda bolingo na Yo, lakisa ngai mitindo na Yo.
Deal in your love with your servant, and teach me your statutes.
125 Nazali mosali na Yo; pesa ngai mayele mpo ete nasosola malako na Yo.
Your servant am I; instruct me, that I may know your charges.
126 Yawe, tango ya kosala ekoki; pamba te bazali kobuka mibeko na Yo!
It is time for the Lord to act: they have violated your law.
127 Yango wana nalingaka mibeko na Yo koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto;
Therefore I love your commandments above gold, above fine gold.
128 namonaka mpe malako na Yo nyonso alima; nzokande, nayinaka lokuta nyonso.
So by all your precepts I guide me, and every false way I hate.
129 Malako na Yo ezali kitoko, yango wana nabatelaka yango.
Your decrees are wonderful, gladly I keep them.
130 Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka, epesaka bazoba mayele.
When your word is unfolded, light breaks; it imparts to the simple wisdom.
131 Monoko na ngai efungwamaka makasi likolo ya kozela, pamba te nazali na posa makasi ya mibeko na Yo.
With open mouth I pant with longing for your commandments.
132 Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.
Turn to me with your favour, as is just to those who love you.
133 Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yo mpe pekisa mabe ete ekonza ngai te.
Steady my steps by your word, so that sin have no power over me.
134 Kangola ngai wuta na minyoko ya bato, mpe nakotosa mibeko na Yo.
Set me free from those who oppress me, and I shall observe your precepts.
135 Tika ete elongi na Yo engengela ngai, mosali na Yo; lakisa ngai mibeko na Yo!
Shine with your face on your servant, and teach me your statutes.
136 Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.
My eyes run down with rills of water, because your law is not kept.
137 Yawe, ozali sembo, mpe mibeko na Yo ezali alima;
Righteous are you, O Lord, and right are your ordinances.
138 osalaki malako na Yo na bosembo mpe na bolingo.
The laws you has ordered are just, and trusty exceedingly.
139 Mpo ete banguna na ngai bazwaka liloba na Yo na motuya te, nayokaka kanda makasi komata ngai na motema.
My jealousy has undone me, that my foes have forgotten your words.
140 Nzokande liloba na Yo ezali penza peto; mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango.
Your word has been tested well; and your servant loves it.
141 Atako nazali moke mpe batiolaka ngai, kasi nabosanaka mitindo na Yo te.
I am little and held in contempt, but your precepts I have not forgotten.
142 Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela, ekotikala kobongwana te; mpe mibeko na Yo ezali solo.
Just is your justice forever, and trusty is your law.
143 Pasi ekangi ngai, mpe mayele esili ngai; kasi mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
Stress and strain are upon me, but your commandments are my delight.
144 Malako na Yo ezali sembo mpo na libela; pesa ngai bososoli mpo ete nabika!
Right are your charges forever, instruct me that I may live.
145 Nazali kobelela Yo na motema na ngai mobimba: « Yawe, yanola ngai; nakotosa mitindo na Yo!
With my whole heart I cry; O answer me. I would keep your statutes, O Lord.
146 Nazali kobelela Yo: bikisa ngai, mpo ete natosa malako na Yo!
I cry to you: O save me, and I will observe your charges.
147 Nalamukaka liboso ete tongo etana mpo na kobelela Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Ere the dawn I cry for your help: in your word do I hope.
148 Nalamukaka na kati-kati ya butu mpo na kokanisa mitindo na Yo.
Awake I meet the night-watches, to muse upon your sayings.
149 Yoka ngai na bolingo na Yo! Yawe, batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo!
Hear my voice in your kindness: O Lord, by your judgments revive me.
150 Bato oyo basalaka mabongisi mabe, oyo batosaka mibeko na Yo te, bazali koya pene na ngai.
Near me are wicked tormentors, who are far from thoughts of your law;
151 Nzokande Yo, Yawe, ozali pene, mpe mibeko na Yo nyonso ezali bosolo.
but near, too, are you, O Lord, and all your commandments are trusty.
152 Wuta kala, ngai nayebi, na nzela ya malako na Yo, ete otia mibeko yango mpo na libela.
Long have I known from your charges that you have founded them for all time.
153 Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai, pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.
Look on my misery, and rescue me; for I do not forget your law.
154 Kota likambo na ngai mpe kangola ngai, batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo!
Defend my cause and redeem me: revive me, as you have promised.
155 Lobiko ezalaka mosika ya bato mabe, pamba te bamonaka pamba mitindo na Yo.
Salvation is far from the wicked, for their mind is not in your statutes.
156 Yawe, mawa na Yo ezali monene penza; batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo.
Great is your pity, O Lord: Revive me, as you have ordained.
157 Banyokoli mpe banguna na ngai bazali solo ebele, kasi ngai nakangamaka kaka na malako na Yo.
My foes and tormentors are many, but I have not declined from your charges.
158 Natalaka na nkele bato oyo bazangi kondima, ba-oyo batosaka liloba na Yo te.
I behold the traitors with loathing, for they do not observe your word.
159 Yawe, tala ndenge nalingaka mitindo na Yo! Batela bomoi na ngai kolanda bolingo na Yo.
Behold how I love your precepts: revive me, O Lord!, in your kindness.
160 Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo, mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali mpo na libela.
The sum of your word is truth, all your laws are just and eternal.
161 Bakambi banyokolaka ngai kaka pamba, kasi kaka liloba na Yo nde ebangisaka motema na ngai.
Princes have harassed me wantonly: but my heart stands in awe of your word.
162 Nasepelaka na liloba na Yo lokola moto oyo azwi bomengo ebele ya bitumba.
Over your word I rejoice as one who finds great spoil.
163 Nayinaka lokuta mpe nayokaka yango nkele, nalingaka nde mibeko na Yo.
Falsehood I hate and abhor, but your law do I love.
164 Nakumisaka Yo mbala sambo na mokolo mpo na mibeko ya bosembo na Yo.
Seven times a day do I praise you because of your righteous judgments.
165 Bato oyo balingaka mibeko na Yo bazali bato na kimia monene, mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.
Right well do they fare who love your law: they go on their way without stumbling.
166 Yawe, natielaka Yo motema mpo ete obikisa ngai, mpe natosaka mibeko na Yo.
I hope for your salvation; O Lord I do your commandments.
167 Natosaka malako na Yo, pamba te nalingaka yango makasi.
I observe your charges: I love them greatly.
168 Natosaka malako mpe mibeko na Yo, pamba te oyebi banzela na ngai nyonso.
I observe your precepts and charges: all my ways are before you.
169 Yawe, tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo! Pesa ngai bososoli kolanda liloba na Yo!
Let my cry come before you, O Lord: give me insight, as you have promised.
170 Tika ete mabondeli na ngai ekoma kino epai na Yo! Kangola ngai kolanda elaka na Yo.
Let my prayer enter into your presence: deliver me, as you have said.
171 Tika ete bibebu na ngai ekumisa Yo, pamba te olakisaka ngai mitindo na Yo!
My lips shall be fountains of praise, that you teach me your statutes.
172 Tika ete lolemo na ngai eyemba liloba na Yo, pamba te mibeko na Yo nyonso ezali sembo.
My tongue shall sing of your word, for all your commandments are right.
173 Tika ete loboko na Yo esunga ngai, pamba te napona kolanda malako na Yo.
Let your hand be ready to help me, for your precepts have been my choice.
174 Yawe, nazali na posa makasi ya lobiko na Yo; mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
I long, Lord, for your salvation, and your law is my delight.
175 Tika ete nazala na bomoi mpo na kokumisa Yo, mpe tika ete mibeko na Yo esunga ngai!
Revive me that I may praise you, and let your precepts help me.
176 Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi; luka ngai, mosali na Yo, pamba te nabosani mibeko na Yo te. »
I have strayed like a wandering sheep seek your servant, because I do not forget your commandments.

< Banzembo 119 >