< Banzembo 108 >

1 Nzembo ya Davidi. Nzambe, motema na ngai ezali na kimia! Nakoyembela Yo, nakosanzola Yo na mindule; ezali mpe lokumu na ngai.
A Song. A Psalm by David. My heart is steadfast, God. I will sing and I will make music with my soul.
2 Lindanda mpe nzenze, bolamuka! Nalingi kolamusa tongo.
Wake up, harp and lyre! I will wake up the dawn.
3 Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.
I will give thanks to you, LORD, amongst the nations. I will sing praises to you amongst the peoples.
4 Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola, mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.
For your loving kindness is great above the heavens. Your faithfulness reaches to the skies.
5 Oh Nzambe, tika ete otombolama na likolo ya Lola, mpe nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba!
Be exalted, God, above the heavens! Let your glory be over all the earth.
6 Bikisa biso na nguya ya loboko na Yo mpe yanola biso, mpo ete balingami na Yo bakangolama!
That your beloved may be delivered, save with your right hand, and answer us.
7 Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule: « Nakolonga! Nakokabola Sishemi mpe nakotia bandelo ya lubwaku ya Sukoti.
God has spoken from his sanctuary: “In triumph, I will divide Shechem, and measure out the valley of Succoth.
8 Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.
Gilead is mine. Manasseh is mine. Ephraim also is my helmet. Judah is my sceptre.
9 Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Nazali kobeta milolo ya bitumba mpo na kobundisa mokili ya Filisitia. »
Moab is my wash pot. I will toss my sandal on Edom. I will shout over Philistia.”
10 Nani akomema ngai na engumba batonga makasi? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi?
Who will bring me into the fortified city? Who will lead me to Edom?
11 Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso!
Haven’t you rejected us, God? You don’t go out, God, with our armies.
12 Yaka kosunga biso, kangola biso liboso ya moyini! Pamba te lisungi ya bato ezali pamba.
Give us help against the enemy, for the help of man is vain.
13 Elongo na Nzambe, tokosala makambo minene mpe ya kokamwa; ezali Ye nde akonyata banguna na biso.
Through God, we will do valiantly, for it is he who will tread down our enemies.

< Banzembo 108 >