< Banzembo 103 >

1 Nzembo ya Davidi. Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Tika ete motema na ngai mobimba epambola Kombo na Ye ya bule! 2 Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye! 3 Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso, 4 akangolaka bomoi na yo wuta na libulu, alatisaka yo motole ya bolingo mpe ya mawa, 5 atondisaka bomoi na yo na esengo mpe akomisaka yo elenge lokola mpongo. 6 Yawe asalaka mpo na bosembo, akotelaka banyokolami nyonso. 7 Amonisaki banzela na Ye epai ya Moyize, mpe bikamwa na Ye epai ya bato ya Isalaele. 8 Yawe ayokelaka bato mawa mpe asalelaka bango bolamu, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo; 9 azwaka biso makambo te tango nyonso, abombaka kanda na Ye te mpo na libela; 10 apamelaka biso te kolanda masumu na biso, azongiselaka biso te kolanda mabe na biso. 11 Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele, ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene mpo na bato oyo batosaka Ye; 12 ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso. 13 Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye; 14 pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso, ayebi malamu ete tozali putulu. 15 Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti, ebongaka lokola fololo ya bilanga; 16 nzokande soki kaka mopepe ebeti yango, ezalaka lisusu te, mpe esika epai wapi ezalaki ebosani yango. 17 Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango, 18 mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye mpe batosaka mibeko na Ye, ezali ya libela na libela. 19 Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Likolo, azali Mokonzi ya mokili mobimba. 20 Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye. 21 Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonso oyo bokokisaka mokano na Ye. 22 Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso, kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye. Eh molimo na ngai, pambola Yawe!

< Banzembo 103 >