< Banzembo 100 >

1 Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe! 2 Bosalela Yawe na esengo, mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo. 3 Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka. 4 Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye. 5 Pamba te Yawe azali malamu; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.

< Banzembo 100 >