< Masese 8 >

1 Boni, Bwanya azali kobelela te? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te? 2 Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela, na bisika oyo banzela ekutana, 3 azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba: 4 « Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato! 5 Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli! Bino bazoba, bokoma mayele! 6 Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo. 7 Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe. 8 Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe; 9 nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli. 10 Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto, 11 pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango. 12 Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli. 13 Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta. 14 Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi. 15 Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo; 16 ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka. 17 Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai. 18 Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai. 19 Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko. 20 Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene, 21 mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango. 22 Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala; 23 aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te. 24 Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te, 25 liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse ezala na bisika na yango, 26 tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili. 27 Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo, 28 tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima, 29 tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele; 30 nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi, nazalaki kosepelisa ye tango nyonso, mpe nazalaki tango nyonso na esengo liboso na Ye; 31 nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato. 32 Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai: Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai! 33 Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te! 34 Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai! 35 Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe. 36 Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko: moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »

< Masese 8 >