< Masese 20 >

1 Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya. 2 Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi. 3 Koboya koswana epesaka moto lokumu, kasi moto oyo azangi mayele amipesaka na yango. 4 Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te. 5 Makanisi ya motema ya moto ezalaka lokola ebale ya mozindo, moto ya mayele alukaka kotoka kati na yango. 6 Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo? 7 Moyengebene atambolaka na bosembo na ye; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo. 8 Soki mokonzi avandi na kiti mpo na kosambisa, miso na ye ebenganaka mabe nyonso. 9 Nani akoki koloba: « Nabatelaka motema na ngai peto, nazali peto, nazali na masumu te? » 10 Kilo mibale mpe bimekelo mibale, nyonso ezali nkele na miso ya Yawe. 11 Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo. 12 Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale. 13 Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba. 14 Moto oyo asombaka biloko alobaka: « Biloko oyo ezali mabe! Ezali malamu te! » Kasi soki akei, atombolaka mapeka mpo na biloko oyo azwi. 15 Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya. 16 Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya. 17 Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo. 18 Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele. 19 Moto ya bilobaloba abimisaka basekele; yango wana kima bato oyo balobaka mingi. 20 Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili. 21 Bomengo oyo moto azwi noki-noki na ebandeli ekopambolama te na suka. 22 Kolobaka te: « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo. 23 Kilo oyo ekesana na kilo mosusu ezalaka nkele na miso ya Yawe, mpe emekelo kilo ya lokuta ezalaka eloko ya malamu te. 24 Ezali Yawe nde atambolisaka matambe ya moto; bongo ndenge nini moto akoki kososola ye moko nzela na ye? 25 Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu: « Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, » mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi. 26 Mokonzi ya bwanya abenganaka bato mabe mpe azangaka te kopesa bango etumbu. 27 Molimo ya moto ezali mwinda oyo Yawe apesi ye; esosolaka bozindo nyonso ya motema ya moto. 28 Bolamu mpe solo ebatelaka mokonzi; alendisaka bokonzi na ye na nzela ya bolamu. 29 Makasi ezali biju ya bilenge, mpe suki ya pembe ezali lokumu ya mibange. 30 Bapota elongolaka mabe, mpe bafimbu esukolaka bozindo ya molimo ya moto.

< Masese 20 >