< Masese 11 >

1 Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele na miso ya Yawe, kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye. 2 Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka, kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka. 3 Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango. 4 Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa. 5 Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko. 6 Bosembo ya bato oyo batambolaka alima ekangolaka bango, kasi bato oyo batambolaka na boyengebene te bakweyaka na motambo ya baposa na bango. 7 Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi; boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na ye mpe ekufi. 8 Moto ya sembo akokangolama na pasi, mpe moto mabe akomona pasi na esika ya moto ya sembo. 9 Moto ya mbindo abebisaka moninga na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo. 10 Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo. 11 Engumba etongamaka na nzela ya mapamboli ya bato ya sembo, kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe. 12 Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele, kasi moto ya mayele avandaka kimia. 13 Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele. 14 Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli. 15 Moto oyo abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya akomona solo pasi, kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia. 16 Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo. 17 Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu, kasi moto na kanza amimonisaka pasi. 18 Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga. 19 Lokola bosembo ememaka na bomoi, moto oyo alandaka nzela ya mabe alandaka nde nzela ya kufa. 20 Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe, kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye. 21 Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama. 22 Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele, azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu. 23 Baposa ya moto ya sembo esukaka kaka malamu, nzokande elikya ya moto mabe ezelaka kaka kanda ya Nzambe. 24 Moto oyo akabaka na motema malamu azwaka mingi koleka, mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola. 25 Moto oyo akabaka akokoma na bomengo; mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi, ye mpe bakopesa ye mayi. 26 Moto oyo abombaka ble, bato bakolakela ye mabe; kasi lipamboli ezali epai na moto oyo akoteka yango. 27 Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu, kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe. 28 Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya, kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika. 29 Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na ye akozwa mopepe lokola libula, mpe moto oyo azangi mayele akokoma mowumbu ya moto ya bwanya. 30 Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye. 31 Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki?

< Masese 11 >