< Masese 11 >

1 Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele na miso ya Yawe, kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye.
詭詐的天平為耶和華所憎惡; 公平的法碼為他所喜悅。
2 Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka, kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.
驕傲來,羞恥也來; 謙遜人卻有智慧。
3 Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango.
正直人的純正必引導自己; 奸詐人的乖僻必毀滅自己。
4 Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.
發怒的日子資財無益; 惟有公義能救人脫離死亡。
5 Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko.
完全人的義必指引他的路; 但惡人必因自己的惡跌倒。
6 Bosembo ya bato oyo batambolaka alima ekangolaka bango, kasi bato oyo batambolaka na boyengebene te bakweyaka na motambo ya baposa na bango.
正直人的義必拯救自己; 奸詐人必陷在自己的罪孽中。
7 Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi; boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na ye mpe ekufi.
惡人一死,他的指望必滅絕; 罪人的盼望也必滅沒。
8 Moto ya sembo akokangolama na pasi, mpe moto mabe akomona pasi na esika ya moto ya sembo.
義人得脫離患難, 有惡人來代替他。
9 Moto ya mbindo abebisaka moninga na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.
不虔敬的人用口敗壞鄰舍; 義人卻因知識得救。
10 Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo.
義人享福,合城喜樂; 惡人滅亡,人都歡呼。
11 Engumba etongamaka na nzela ya mapamboli ya bato ya sembo, kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe.
城因正直人祝福便高舉, 卻因邪惡人的口就傾覆。
12 Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele, kasi moto ya mayele avandaka kimia.
藐視鄰舍的,毫無智慧; 明哲人卻靜默不言。
13 Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele.
往來傳舌的,洩漏密事; 心中誠實的,遮隱事情。
14 Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli.
無智謀,民就敗落; 謀士多,人便安居。
15 Moto oyo abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya akomona solo pasi, kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia.
為外人作保的,必受虧損; 恨惡擊掌的,卻得安穩。
16 Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.
恩德的婦女得尊榮; 強暴的男子得資財。
17 Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu, kasi moto na kanza amimonisaka pasi.
仁慈的人善待自己; 殘忍的人擾害己身。
18 Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga.
惡人經營,得虛浮的工價; 撒義種的,得實在的果效。
19 Lokola bosembo ememaka na bomoi, moto oyo alandaka nzela ya mabe alandaka nde nzela ya kufa.
恆心為義的,必得生命; 追求邪惡的,必致死亡。
20 Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe, kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye.
心中乖僻的,為耶和華所憎惡; 行事完全的,為他所喜悅。
21 Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.
惡人雖然連手,必不免受罰; 義人的後裔必得拯救。
22 Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele, azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu.
婦女美貌而無見識, 如同金環帶在豬鼻上。
23 Baposa ya moto ya sembo esukaka kaka malamu, nzokande elikya ya moto mabe ezelaka kaka kanda ya Nzambe.
義人的心願盡得好處; 惡人的指望致干忿怒。
24 Moto oyo akabaka na motema malamu azwaka mingi koleka, mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola.
有施散的,卻更增添; 有吝惜過度的,反致窮乏。
25 Moto oyo akabaka akokoma na bomengo; mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi, ye mpe bakopesa ye mayi.
好施捨的,必得豐裕; 滋潤人的,必得滋潤。
26 Moto oyo abombaka ble, bato bakolakela ye mabe; kasi lipamboli ezali epai na moto oyo akoteka yango.
屯糧不賣的,民必咒詛他; 情願出賣的,人必為他祝福。
27 Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu, kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe.
懇切求善的,就求得恩惠; 惟獨求惡的,惡必臨到他身。
28 Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya, kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika.
倚仗自己財物的,必跌倒; 義人必發旺,如青葉。
29 Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na ye akozwa mopepe lokola libula, mpe moto oyo azangi mayele akokoma mowumbu ya moto ya bwanya.
擾害己家的,必承受清風; 愚昧人必作慧心人的僕人。
30 Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye.
義人所結的果子就是生命樹; 有智慧的,必能得人。
31 Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki?
看哪,義人在世尚且受報, 何況惡人和罪人呢?

< Masese 11 >