< Mitango 8 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
καὶ ἐλάλησεν κύριος πρὸς Μωυσῆν λέγων
2 « Loba na Aron mpe yebisa ye: ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › »
λάλησον τῷ Ααρων καὶ ἐρεῖς πρὸς αὐτόν ὅταν ἐπιτιθῇς τοὺς λύχνους ἐκ μέρους κατὰ πρόσωπον τῆς λυχνίας φωτιοῦσιν οἱ ἑπτὰ λύχνοι
3 Aron asalaki kaka bongo: atiaki minda na liboso ya etelemiselo ya minda ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
καὶ ἐποίησεν οὕτως Ααρων ἐκ τοῦ ἑνὸς μέρους κατὰ πρόσωπον τῆς λυχνίας ἐξῆψεν τοὺς λύχνους αὐτῆς καθὰ συνέταξεν κύριος τῷ Μωυσῇ
4 Tala ndenge basalaki etelemiselo ya minda: basalaki yango na wolo batuta wuta na likonzi kino na bafololo na yango; basalaki yango ndenge kaka Yawe alakisaki Moyize.
καὶ αὕτη ἡ κατασκευὴ τῆς λυχνίας στερεὰ χρυσῆ ὁ καυλὸς αὐτῆς καὶ τὰ κρίνα αὐτῆς στερεὰ ὅλη κατὰ τὸ εἶδος ὃ ἔδειξεν κύριος τῷ Μωυσῇ οὕτως ἐποίησεν τὴν λυχνίαν
5 Yawe alobaki na Moyize:
καὶ ἐλάλησεν κύριος πρὸς Μωυσῆν λέγων
6 « Kamata Balevi kati na bana ya Isalaele mpe petola bango.
λαβὲ τοὺς Λευίτας ἐκ μέσου υἱῶν Ισραηλ καὶ ἀφαγνιεῖς αὐτούς
7 Tala ndenge okosala mpo na kopetola bango: okobwakela bango mayi ya bopetoli; bongo bakolekisa jileti na nzoto na bango mobimba mpo na komikokola suki ya nzoto mobimba mpe bakosukola bilamba na bango. Ezali na nzela wana nde bakokoma peto.
καὶ οὕτως ποιήσεις αὐτοῖς τὸν ἁγνισμὸν αὐτῶν περιρρανεῖς αὐτοὺς ὕδωρ ἁγνισμοῦ καὶ ἐπελεύσεται ξυρὸν ἐπὶ πᾶν τὸ σῶμα αὐτῶν καὶ πλυνοῦσιν τὰ ἱμάτια αὐτῶν καὶ καθαροὶ ἔσονται
8 Bakokamata mwana ngombe ya mobali elongo na likabo na yango ya farine oyo basangisa na mafuta; mpe okokamata mwana ngombe mosusu ya mobali mpo na mbeka ya masumu.
καὶ λήμψονται μόσχον ἕνα ἐκ βοῶν καὶ τούτου θυσίαν σεμιδάλεως ἀναπεποιημένην ἐν ἐλαίῳ καὶ μόσχον ἐνιαύσιον ἐκ βοῶν λήμψῃ περὶ ἁμαρτίας
9 Yeisa Balevi liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe sangisa lisanga mobimba ya Isalaele.
καὶ προσάξεις τοὺς Λευίτας ἔναντι τῆς σκηνῆς τοῦ μαρτυρίου καὶ συνάξεις πᾶσαν συναγωγὴν υἱῶν Ισραηλ
10 Okopusa Balevi liboso ya Yawe mpe bana ya Isalaele bakotia bango maboko.
καὶ προσάξεις τοὺς Λευίτας ἔναντι κυρίου καὶ ἐπιθήσουσιν οἱ υἱοὶ Ισραηλ τὰς χεῖρας αὐτῶν ἐπὶ τοὺς Λευίτας
11 Sima na yango, Aron akobonza Balevi lokola likabo oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe mpo ete bazwa makoki ya kosala mosala ya Yawe.
καὶ ἀφοριεῖ Ααρων τοὺς Λευίτας ἀπόδομα ἔναντι κυρίου παρὰ τῶν υἱῶν Ισραηλ καὶ ἔσονται ὥστε ἐργάζεσθαι τὰ ἔργα κυρίου
12 Mpe na sima, Balevi bakotia maboko na bango likolo ya mito ya bangombe ya mibali. Bonza ngombe moko lokola mbeka ya masumu epai na Yawe mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Balevi.
οἱ δὲ Λευῖται ἐπιθήσουσιν τὰς χεῖρας ἐπὶ τὰς κεφαλὰς τῶν μόσχων καὶ ποιήσει τὸν ἕνα περὶ ἁμαρτίας καὶ τὸν ἕνα εἰς ὁλοκαύτωμα κυρίῳ ἐξιλάσασθαι περὶ αὐτῶν
13 Tika ete Balevi batelema liboso ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali; bongo bonza bango lokola likabo epai na Yawe.
καὶ στήσεις τοὺς Λευίτας ἔναντι κυρίου καὶ ἔναντι Ααρων καὶ ἔναντι τῶν υἱῶν αὐτοῦ καὶ ἀποδώσεις αὐτοὺς ἀπόδομα ἔναντι κυρίου
14 Ezali na nzela wana nde okotia pembeni Balevi kati na bana ya Isalaele, mpe bakozala ya Ngai.
καὶ διαστελεῖς τοὺς Λευίτας ἐκ μέσου υἱῶν Ισραηλ καὶ ἔσονται ἐμοί
15 Sima na yo kopetola Balevi mpe kobonza bango lokola likabo, bakozwa ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye, okopetola bango mpe okobonza bango lokola likabo epai na Yawe,
καὶ μετὰ ταῦτα εἰσελεύσονται οἱ Λευῖται ἐργάζεσθαι τὰ ἔργα τῆς σκηνῆς τοῦ μαρτυρίου καὶ καθαριεῖς αὐτοὺς καὶ ἀποδώσεις αὐτοὺς ἔναντι κυρίου
16 pamba te bango nde bazali bato oyo bapesameli Ngai kati na bana ya Isalaele. Ngai moko nde nazwaki bango na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele.
ὅτι ἀπόδομα ἀποδεδομένοι οὗτοί μοί εἰσιν ἐκ μέσου υἱῶν Ισραηλ ἀντὶ τῶν διανοιγόντων πᾶσαν μήτραν πρωτοτόκων πάντων ἐκ τῶν υἱῶν Ισραηλ εἴληφα αὐτοὺς ἐμοί
17 Pamba te, bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele bazali ya Ngai, ezala bana ya liboso ya bana ya bato to ya banyama. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso na mokili ya Ejipito, natiaki bango pembeni mpo na Ngai moko.
ὅτι ἐμοὶ πᾶν πρωτότοκον ἐν υἱοῖς Ισραηλ ἀπὸ ἀνθρώπου ἕως κτήνους ᾗ ἡμέρᾳ ἐπάταξα πᾶν πρωτότοκον ἐν γῇ Αἰγύπτῳ ἡγίασα αὐτοὺς ἐμοὶ
18 Mpe nazwaki Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele.
καὶ ἔλαβον τοὺς Λευίτας ἀντὶ παντὸς πρωτοτόκου ἐν υἱοῖς Ισραηλ
19 Kati na bato nyonso ya Isalaele, napesi Balevi lokola likabo epai ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali, mpo ete basala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na bolamu ya bana ya Isalaele mpe basala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, mpo ete likama moko te ekomela bana ya Isalaele tango bakopusana pene ya Esika ya bule. »
καὶ ἀπέδωκα τοὺς Λευίτας ἀπόδομα δεδομένους Ααρων καὶ τοῖς υἱοῖς αὐτοῦ ἐκ μέσου υἱῶν Ισραηλ ἐργάζεσθαι τὰ ἔργα τῶν υἱῶν Ισραηλ ἐν τῇ σκηνῇ τοῦ μαρτυρίου καὶ ἐξιλάσκεσθαι περὶ τῶν υἱῶν Ισραηλ καὶ οὐκ ἔσται ἐν τοῖς υἱοῖς Ισραηλ προσεγγίζων πρὸς τὰ ἅγια
20 Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele basalaki mpo na Balevi, makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.
καὶ ἐποίησεν Μωυσῆς καὶ Ααρων καὶ πᾶσα συναγωγὴ υἱῶν Ισραηλ τοῖς Λευίταις καθὰ ἐνετείλατο κύριος τῷ Μωυσῇ περὶ τῶν Λευιτῶν οὕτως ἐποίησαν αὐτοῖς οἱ υἱοὶ Ισραηλ
21 Balevi bamipetolaki mpe basukolaki bilamba na bango. Aron abonzaki bango lokola likabo epai na Yawe mpe asalaki mpo na bango mosala ya bolimbisi masumu mpo na kopetola bango.
καὶ ἡγνίσαντο οἱ Λευῖται καὶ ἐπλύναντο τὰ ἱμάτια καὶ ἀπέδωκεν αὐτοὺς Ααρων ἀπόδομα ἔναντι κυρίου καὶ ἐξιλάσατο περὶ αὐτῶν Ααρων ἀφαγνίσασθαι αὐτούς
22 Sima na yango, Balevi bazwaki ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani, na se ya bokonzi ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Basalaki mpo na Balevi, makambo oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
καὶ μετὰ ταῦτα εἰσῆλθον οἱ Λευῖται λειτουργεῖν τὴν λειτουργίαν αὐτῶν ἐν τῇ σκηνῇ τοῦ μαρτυρίου ἔναντι Ααρων καὶ ἔναντι τῶν υἱῶν αὐτοῦ καθὼς συνέταξεν κύριος τῷ Μωυσῇ περὶ τῶν Λευιτῶν οὕτως ἐποίησαν αὐτοῖς
23 Yawe alobaki na Moyize:
καὶ ἐλάλησεν κύριος πρὸς Μωυσῆν λέγων
24 « Tala bikateli oyo etali Balevi: mobali nyonso oyo azali na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale na mitano mpe koleka asengeli koya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
τοῦτό ἐστιν τὸ περὶ τῶν Λευιτῶν ἀπὸ πεντεκαιεικοσαετοῦς καὶ ἐπάνω εἰσελεύσονται ἐνεργεῖν ἐν τῇ σκηνῇ τοῦ μαρτυρίου
25 Kasi soki akokisi mibu tuku mitano, akotika mosala oyo azalaki kosala, akosala lisusu mosala te.
καὶ ἀπὸ πεντηκονταετοῦς ἀποστήσεται ἀπὸ τῆς λειτουργίας καὶ οὐκ ἐργᾶται ἔτι
26 Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. »
καὶ λειτουργήσει ὁ ἀδελφὸς αὐτοῦ ἐν τῇ σκηνῇ τοῦ μαρτυρίου φυλάσσειν φυλακάς ἔργα δὲ οὐκ ἐργᾶται οὕτως ποιήσεις τοῖς Λευίταις ἐν ταῖς φυλακαῖς αὐτῶν

< Mitango 8 >