< Mitango 4 >

1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
耶和華曉諭摩西、亞倫說:
2 « Kati na bana mibali ya Levi, tanga motango ya bakitani ya Keati kolanda bituka mpe mabota na bango.
「你從利未人中,將哥轄子孫的總數,照他們的家室、宗族,
3 Tanga motango ya mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, mpo ete baya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
從三十歲直到五十歲,凡前來任職、在會幕裏辦事的,全都計算。
4 Tala mosala ya bato ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani: kobatela biloko oyo eleki bule.
哥轄子孫在會幕搬運至聖之物,所辦的事乃是這樣:
5 Tango bakolongola molako, Aron elongo na bana na ye ya mibali bakokota na kati, bakokitisa rido mpe bakozipa na yango Sanduku ya Litatoli.
起營的時候,亞倫和他兒子要進去摘下遮掩櫃的幔子,用以蒙蓋法櫃,
6 Na likolo na yango, bakotia bulangeti oyo esalema na poso ya nyama ya ebale, bakofinika liputa ya langi ya ble mpe bakotia mabaya ya komemela Sanduku ya Litatoli.
又用海狗皮蓋在上頭,再蒙上純藍色的毯子,把槓穿上。
7 Na likolo ya mesa ya bagato ya bule, bakotanda lisusu liputa ya langi ya ble mpe bakotia na likolo na yango biloko oyo: basani ya mbele, bambeki, bakopo, milangi mpo na makabo ya masanga mpe bagato oyo bakobanda kobonza lokola makabo liboso na Ngai tango nyonso.
又用藍色毯子鋪在陳設餅的桌子上,將盤子、調羹、奠酒的爵,和杯擺在上頭。桌子上也必有常設的餅。
8 Bongo na likolo ya biloko yango, bakotanda liputa ya langi ya motane makasi, mpe bakozipa biloko wana nyonso na liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale. Mpe bakotia balate oyo ekosunga mpo na kotombola mpe komema mesa.
在其上又要蒙朱紅色的毯子,再蒙上海狗皮,把槓穿上。
9 Bakokamata liputa ya langi ya ble mpe bakofinika na yango etelemiselo ya minda elongo na minda na yango, biloko oyo balongolelaka makala na moto, basani mpo na putulu ya moto mpe basani ya mafuta, oyo basalelaka mosala na mesa.
要拿藍色毯子,把燈臺和燈臺上所用的燈盞、剪子、蠟花盤,並一切盛油的器皿,全都遮蓋。
10 Bakosangisa na liboke moko, ezala elamba yango ya langi ya ble mpe biloko na yango nyonso, kati na liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia yango na likolo ya tsipoyi.
又要把燈臺和燈臺的一切器具包在海狗皮裏,放在抬架上。
11 Bakotanda liputa ya langi ya ble na likolo ya etumbelo ya wolo mpe bakofinika bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale; bongo bakotia balate na yango oyo ekosunga mpo na komema.
在金壇上要鋪藍色毯子,蒙上海狗皮,把槓穿上。
12 Bakozwa biloko nyonso oyo basalaka na yango kati na Esika ya bule, bakotia yango kati na liputa ya langi ya ble, bakofinika yango bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale; bongo bakotia yango na tsipoyi.
又要把聖所用的一切器具包在藍色毯子裏,用海狗皮蒙上,放在抬架上。
13 Sima na bango kolongola putulu ya moto wuta na etumbelo, bakotanda liputa ya langi ya motane na likolo na yango;
要收去壇上的灰,把紫色毯子鋪在壇上;
14 bongo bakotia na likolo na yango biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo: basani oyo batumbaka na yango ansa, bakanya, bapawu, basani ya minene mpe biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo; bongo bakotanda na likolo ya biloko oyo nyonso, liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia balate ya etumbelo oyo ekosunga mpo na komema.
又要把所用的一切器具,就是火鼎、肉鍤子、鏟子、盤子,一切屬壇的器具都擺在壇上,又蒙上海狗皮,把槓穿上。
15 Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
將要起營的時候,亞倫和他兒子把聖所和聖所的一切器具遮蓋完了,哥轄的子孫就要來抬,只是不可摸聖物,免得他們死亡。會幕裏這些物件是哥轄子孫所當抬的。
16 Tala misala ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron: kolandela mafuta ya etelemiselo ya minda, ansa ya kozikisa, makabo ya mokolo na mokolo mpe mafuta ya epakolami; kokengela Mongombo mpe biloko na yango nyonso, ezala Esika ya bule to biloko na yango nyonso. »
「祭司亞倫的兒子以利亞撒所要看守的是點燈的油與香料,並當獻的素祭和膏油,也要看守全帳幕與其中所有的,並聖所和聖所的器具。」
17 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
耶和華曉諭摩西、亞倫說:
18 « Bolongola te kati na Balevi lisanga ya mabota ya bato ya Keati.
「你們不可將哥轄人的支派從利未人中剪除。
19 Tala makambo oyo bosengeli kosala mpo na bango mpo ete bakufa te tango bakopusana pene ya biloko oyo eleki bule: yo, Aron mpe bana na ye ya mibali, bokokota mpe bopesa na moko na moko kati na bango mosala oyo asengeli kosala to eloko oyo asengeli komema.
他們挨近至聖物的時候,亞倫和他兒子要進去派他們各人所當辦的,所當抬的。這樣待他們,好使他們活着,不致死亡。
20 Basengeli te kokota bango moko mpo na kotala Esika ya bule, ata mpo na tango moke; soki te bakokufa. »
只是他們連片時不可進去觀看聖所,免得他們死亡。」
21 Yawe alobaki na Moyize:
耶和華曉諭摩西說:
22 « Tanga motango ya bato ya Gerishoni kolanda bituka mpe mabota na bango.
「你要將革順子孫的總數,照着宗族、家室,
23 Okotanga mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino na tuku mitano, ba-oyo bakoki kosala mosala songolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
從三十歲直到五十歲,凡前來任職、在會幕裏辦事的,全都數點。
24 Tala misala mpe mokumba ya bituka ya bana mibali ya Gerishoni:
革順人各族所辦的事、所抬的物乃是這樣:
25 bakobanda komema batapi ya Mongombo mpe Ndako ya kapo ya Bokutani elongo na elamba na yango, elamba ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale mpo na kozipa na likolo, rido ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani,
他們要抬帳幕的幔子和會幕,並會幕的蓋與其上的海狗皮,和會幕的門簾,
26 batapi ya lopango, rido ya ekuke ya lopango, oyo ezingeli Mongombo mpe etumbelo, basinga na yango mpe bisalelo na yango nyonso. Bakosala mosala oyo etali biloko oyo.
院子的帷子和門簾(院子是圍帳幕和壇的)、繩子,並所用的器具,不論是做甚麼用的,他們都要經理。
27 Mosala nyonso ya bato ya Gerishoni ekokambama na Aron mpe bana na ye ya mibali: ezala mpo na komema biloko to mpo na kosala mosala; bokoyebisa bango mosala nyonso oyo bango basengeli kosala.
革順的子孫在一切抬物辦事之上都要憑亞倫和他兒子的吩咐;他們所當抬的,要派他們看守。
28 Wana nde misala ya bituka ya bato ya Gerishoni kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango.
這是革順子孫的各族在會幕裏所辦的事;他們所看守的,必在祭司亞倫兒子以他瑪的手下。」
29 Okotanga motango ya bato ya Merari, etuka moko na moko mpe libota moko na moko;
「至於米拉利的子孫,你要照着家室、宗族把他們數點。
30 okotanga mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bakoki kosala mosala songolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
從三十歲直到五十歲,凡前來任職、在會幕裏辦事的,你都要數點。
31 Tala biteni ya Ndako ya kapo ya Bokutani, oyo bakobanda komema: mabaya ya Mongombo, balate na yango, makonzi mpe makolo na yango,
他們辦理會幕的事,就是抬帳幕的板、閂、柱子,和帶卯的座,
32 makonzi oyo ezingeli lopango, makolo na yango, bapike na yango, basinga na yango, bisalelo na yango nyonso mpe biloko nyonso oyo esungaka mpo na kokangisa yango. Bokobenga moto moko na moko na kombo mpe bokopesa ye biloko oyo akobanda komema.
院子四圍的柱子和其上帶卯的座、橛子、繩子,並一切使用的器具。他們所抬的器具,你們要按名指定。
33 Wana nde misala ya bituka ya bato ya Merari. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango nyonso kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. »
這是米拉利子孫各族在會幕裏所辦的事,都在祭司亞倫兒子以他瑪的手下。」
34 Moyize, Aron mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele batangaki motango ya bato ya Keati, kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko.
摩西、亞倫與會眾的諸首領將哥轄的子孫,照着家室、宗族,
35 Mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,
從三十歲直到五十歲,凡前來任職、在會幕裏辦事的,都數點了。
36 batangamaki kolanda etuka moko na moko: motango na bango ezalaki nkoto mibale na nkama sambo na tuku mitano.
被數的共有二千七百五十名。
37 Wana nde motango ya bato nyonso oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Keati, ba-oyo bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki motango yango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
這是哥轄各族中被數的,是在會幕裏辦事的,就是摩西、亞倫照耶和華藉摩西所吩咐數點的。
38 Batangaki motango ya bato ya Gerishoni kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko:
革順子孫被數的,照着家室、宗族,
39 mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,
從三十歲直到五十歲,凡前來任職、在會幕裏辦事的,共有二千六百三十名。
40 batangamaki kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko; motango na bango ezalaki nkoto mibale na nkama motoba na tuku misato.
41 Wana nde motango ya bato ya Gerishoni oyo batangamaki mpe bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
這是革順子孫各族中被數的,是在會幕裏辦事的,就是摩西、亞倫照耶和華藉摩西所吩咐數點的。
42 Batangaki motango ya bato ya Merari kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko:
米拉利子孫中各族被數的,照着家室、宗族,
43 mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,
從三十歲直到五十歲,凡前來任職、在會幕裏辦事的,共有三千二百名。
44 batangamaki kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko; motango na bango ezalaki nkoto misato na nkama mibale.
45 Wana nde motango ya bato oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Merari. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
這是米拉利子孫各族中被數的,就是摩西、亞倫照耶和華藉摩西所吩咐數點的。
46 Moyize, Aron mpe bakambi ya Isalaele batangaki motango ya Balevi nyonso, kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko:
凡被數的利未人,就是摩西、亞倫並以色列眾首領,照着家室、宗族所數點的,
47 mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,
從三十歲直到五十歲,凡前來任職、在會幕裏做抬物之工的,共有八千五百八十名。
48 batangamaki; motango na bango ezalaki nkoto mwambe na nkama mitano na tuku mwambe.
49 Moyize apesaki na Molevi moko na moko mosala mpe mokumba, kolanda mitindo ya Yawe. Batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.
摩西按他們所辦的事、所抬的物,憑耶和華的吩咐數點他們;他們這樣被摩西數點,正如耶和華所吩咐他的。

< Mitango 4 >