< Mitango 33 >

1 Tala bisika oyo bana ya Isalaele batongaki milako na bango tango bazalaki na mobembo wuta na mokili ya Ejipito. Bazalaki kotambola na molongo ya bitumba na bokambami ya Moyize mpe Aron.
These were the movements of the people of Israel after they left the land of Egypt by their armed groups under the leadership of Moses and Aaron.
2 Moyize akomaki na mokanda bisika nyonso oyo bazalaki koleka na etinda ya Yawe. Tala bakombo ya moko na moko ya bisika yango:
Moses wrote down the places from where they left to where they went, as commanded by Yahweh. These were their movements, departure after departure.
3 Bana ya Isalaele balongwaki na Ramisesi na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya liboso; ezalaki mokolo oyo elandaki mokolo ya Pasika. Babimaki na matata te na miso ya bato nyonso ya Ejipito,
They traveled from Rameses during the first month, leaving on the fifteenth day of the first month. On the morning after the Passover, the people of Israel left openly, in the sight of all the Egyptians.
4 wana bato ya Ejipito bazalaki kokunda bibembe ya bana mibali na bango ya liboso oyo Yawe abetaki mpo na kopesa etumbu na banzambe na bango.
This happened while the Egyptians were burying all their firstborn, those whom Yahweh had killed among them, for he also inflicted punishment on their gods.
5 Tango balongwaki na Ramisesi, bana ya Isalaele bakendeki kotonga molako na bango na Sukoti.
The people of Israel set out from Rameses and camped at Succoth.
6 Kolongwa na Sukoti, bakendeki kotonga molako na bango na Etami, pene ya mondelo ya esobe.
They set out from Succoth and camped at Etham, on the edge of the wilderness.
7 Tango balongwaki na Etami, bazongaki na ngambo ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni, mpe batongaki molako na bango liboso ya Migidoli.
They set out from Etham and turned back to Pi Hahiroth, which is opposite Baal Zephon, where they camped opposite Migdol.
8 Kolongwa na Pi-Ayiroti, bakatisaki ebale monene mpe bakomaki na esobe; batambolaki mikolo misato na esobe ya Etami mpe batongaki molako na bango, na Mara.
Then they set out from opposite Pi Hahiroth and passed through the middle of the sea into the wilderness. They traveled three days' journey into the wilderness of Etham and camped at Marah.
9 Kolongwa na Mara, bakomaki na Elimi epai wapi bakutaki bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo; batongaki molako na bango kuna.
They set out from Marah and arrived at Elim. At Elim were twelve springs of water and seventy palm trees. That is where they camped.
10 Kolongwa na Elimi, bakendeki kotonga molako na bango pene ya ebale monene ya barozo.
They set out from Elim and camped by the Sea of Reeds.
11 Kolongwa na ebale monene ya barozo, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Tsini.
They set out from the Sea of Reeds and camped in the wilderness of Sin.
12 Kolongwa na esobe ya Tsini, bakendeki kotonga molako na bango na Dofika.
They set out from the wilderness of Sin and camped at Dophkah.
13 Kolongwa na Dofika, bakendeki kotonga molako na bango na Alushi.
They set out from Dophkah and camped at Alush.
14 Kolongwa na Alushi, bakendeki kotonga molako na bango na Refidimi epai wapi bato bazangaki mayi ya komela.
They set out from Alush and camped at Rephidim, where no water was found for the people to drink.
15 Kolongwa na Refidimi, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Sinai.
They set out from Rephidim and camped in the wilderness of Sinai.
16 Kolongwa na esobe ya Sinai, bakendeki kotonga molako na bango na Kibiroti-Atava.
They set out from the wilderness of Sinai and camped at Kibroth Hattaavah.
17 Kolongwa na Kibiroti-Atava, bakendeki kotonga molako na bango na Atseroti.
They set out from Kibroth Hattaavah and camped at Hazeroth.
18 Kolongwa na Atseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Ritima.
They set out from Hazeroth and camped at Rithmah.
19 Kolongwa na Ritima, bakendeki kotonga molako na bango na Rimoni-Peretsi.
They set out from Rithmah and camped at Rimmon Perez.
20 Kolongwa na Rimoni-Peretsi, bakendeki kotonga molako na bango na Libina.
They set out from Rimmon Perez and camped at Libnah.
21 Kolongwa na Libina, bakendeki kotonga molako na bango na Risa.
They set out from Libnah and camped at Rissah.
22 Kolongwa na Risa, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Keyelata.
They set out from Rissah and camped at Kehelathah.
23 Kolongwa na ngomba Keyelata, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Seferi.
They set out from Kehelathah and camped at Mount Shepher.
24 Kolongwa na ngomba Seferi, bakendeki kotonga molako na bango na Arada.
They set out from Mount Shepher and camped at Haradah.
25 Kolongwa na Arada, bakendeki kotonga molako na bango na Makeyeloti.
They set out from Haradah and camped at Makheloth.
26 Kolongwa na Makeyeloti, bakendeki kotonga molako na bango na Taati.
They set out from Makheloth and camped at Tahath.
27 Kolongwa na Taati, bakendeki kotonga molako na bango na Tera.
They set out from Tahath and camped at Terah.
28 Kolongwa na Tera, bakendaki kotonga molako na bango na Mitika.
They set out from Terah and camped at Mithkah.
29 Kolongwa na Mitika, bakendaki kotonga molako na bango na Ashimona.
They set out from Mithkah and camped at Hashmonah.
30 Kolongwa na Ashimona, bakendeki kotonga molako na bango na Moseroti.
They set out from Hashmonah and camped at Moseroth.
31 Kolongwa na Moseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Bene-Yaakani.
They set out from Moseroth and camped at Bene Jaakan.
32 Kolongwa na Bene-Yaakani, bakendeki kotonga molako na bango na Ori-Gidigadi.
They set out from Bene Jaakan and camped at Hor Haggidgad.
33 Kolongwa na Ori-Gidigadi, bakendeki kotonga molako na bango na Yotibata.
They set out from Hor Haggidgad and camped at Jotbathah.
34 Kolongwa na Yotibata, bakendeki kotonga molako na bango na Abrona.
They set out from Jotbathah and camped at Abronah.
35 Kolongwa na Abrona, bakendeki kotonga molako na bango na Etsioni-Geberi.
They set out from Abronah and camped at Ezion Geber.
36 Kolongwa na Etsioni-Geberi, bakendeki kotonga molako na bango na Kadeshi, na esobe ya Tsini.
They set out from Ezion Geber and camped in the wilderness of Zin at Kadesh.
37 Kolongwa na Kadeshi, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Ori, na mondelo ya Edomi.
They set out from Kadesh and camped at Mount Hor, at the edge of the land of Edom.
38 Ezali kuna na ngomba Ori nde, kolanda etinda ya Yawe, Nganga-Nzambe Aron amataki mpe akufaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, sima na mibu tuku minei wuta bana ya Isalaele babimaki na Ejipito.
Aaron the priest went up Mount Hor at Yahweh's command and died there in the fortieth year after the people of Israel had come out of the land of Egypt, in the fifth month, on the first day of the month.
39 Aron azalaki na mibu ya mbotama nkama moko na tuku mibale na misato tango akufaki likolo ya ngomba Ori.
Aaron was a 123 years old when he died on Mount Hor.
40 Boye, mokonzi ya Aradi, moto ya mboka Kanana, oyo azalaki kovanda na Negevi ya mboka Kanana, ayokaki sango ya koya ya bana ya Isalaele.
The Canaanite, the king of Arad, who lived in the southern wilderness in the land of Canaan, heard of the coming of the people of Israel.
41 Tango balongwaki na ngomba Ori, bakendeki kotonga molako na bango na Tsalimona.
They set out from Mount Hor and camped at Zalmonah.
42 Kolongwa na Tsalimona, bakendeki kotonga molako na bango na Punoni.
They set out from Zalmonah and camped at Punon.
43 Kolongwa na Punoni, bakendeki kotonga molako na bango na Oboti.
They set out from Punon and camped at Oboth.
44 Kolongwa na Oboti, bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na mondelo ya Moabi.
They set out from Oboth and camped at Iye Abarim, on the border of Moab.
45 Kolongwa na Iye-Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na Diboni-Gadi.
They set out from Iye Abarim and camped at Dibon Gad.
46 Kolongwa na Diboni-Gadi, bakendeki kotonga molako na bango na Alimoni-Dibilatayimi.
They set out from Dibon Gad and camped at Almon Diblathaim.
47 Kolongwa na Alimoni-Dibilatayimi, bakendeki kotonga molako na bango na bangomba Abarimi, pembeni ya Nebo.
They set out from Almon Diblathaim and camped in the mountains of Abarim, opposite Nebo.
48 Kolongwa na bangomba Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko.
They set out from the mountains of Abarim and camped in the plains of Moab by the Jordan at Jericho.
49 Batongaki molako na bango pembeni ya Yordani, kolongwa na Beti-Yeshimoti kino na Abele-Shitimi, na etando ya Moabi.
They camped by the Jordan, from Beth Jeshimoth to Abel Shittim in the plains of Moab.
50 Na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko, Yawe alobaki na Moyize:
Yahweh spoke to Moses in the plains of Moab by the Jordan at Jericho and said,
51 « Loba na bana ya Isalaele, mpe yebisa bango: ‹ Tango bokokatisa ebale Yordani mpo na kokota na mokili ya Kanana,
“Speak to the people of Israel and say to them, 'When you cross over the Jordan into the land of Canaan,
52 bokobengana bato nyonso oyo bavandaka na mboka yango, bokosilisa kobuka banzambe nyonso ya bikeko oyo basala na mabanga, na bibende banyangwisa na moto mpe bokobebisa bisambelo na bango nyonso ya likolo ya bangomba.
then you must drive out all the land's inhabitants before you. You must destroy all their carved figures. You must destroy all their cast figures and demolish all their high places.
53 Bokobotola mokili yango mpe bokokoma kovanda kuna, pamba te napesi bino mokili yango mpo ete bobotola yango.
You must take possession of the land and settle in it, because I have given you the land to possess.
54 Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino: libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino.
You must inherit the land by lot, according to each clan. To the larger clans you must give a larger share of land, and to the smaller clans you must give a smaller share of land. Wherever the lot falls to each clan, that land will belong to it. You will inherit the land according to your ancestors' tribes.
55 Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda.
But if you do not drive out the land's inhabitants before you, then the people you allow to stay will become like objects in your eyes and thorns in your sides. They will make your lives difficult in the land where you settle.
56 Boye, nakosala bino ndenge nakanaki kosala bango. › »
Then it will happen that what I now intend to do to those people, I will do also to you.'”

< Mitango 33 >