< Mitango 31 >

1 Yawe alobaki na Moyize: 2 « Zongisa mabe na mabe oyo bato ya Madiani basalaki bana ya Isalaele, mpe na sima, okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi. » 3 Boye Moyize alobaki na bato: « Tika ete mibali kati na bino balata bibundeli mpo na kokende kobundisa mokili ya Madiani mpe kozongisela bango mabe na mabe, na Kombo na Yawe. 4 Libota moko na moko ya Isalaele ekotinda basoda nkoto moko na etumba. » 5 Boye, baponaki bato nkoto moko mpo na libota moko na moko kati na mabota ya Isalaele. Bongo, bato nkoto zomi na mibale balataki bibundeli mpo na kokende na etumba. 6 Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela. 7 Babundisaki Madiani ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize mpe babomaki mibali nyonso. 8 Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo: Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga. 9 Bana ya Isalaele bakangaki basi mpe bana ya Madiani elongo na banyama, bibwele mpe bozwi na bango nyonso lokola bomengo ya bitumba. 10 Batumbaki bingumba nyonso epai wapi bato ya Madiani bazalaki kovanda, na milako na bango nyonso. 11 Bamemaki bomengo nyonso ya bitumba mpe biloko nyonso oyo babotolaki elongo na bato, banyama; 12 mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko. 13 Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bayaki koyamba bango na libanda ya molako. 14 Moyize atombokelaki bakonzi oyo baponamaki mpo na kotambolisa mampinga, bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda, oyo bawutaki na bitumba. 15 Moyize atunaki bango: « Boni, botiki basi nyonso na bomoi? 16 Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe. 17 Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali; 18 kasi bobatela na bomoi mpo na bino, basi nyonso oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. 19 Moto nyonso kati na bino oyo abomaki moto to asimbaki ebembe, asengeli kozala libanda ya molako mikolo sambo. Boye, na mokolo ya misato mpe ya sambo, bosengeli komipetola, bino mpe bakangami na bino. 20 Bokopetola mpe lisusu bilamba nyonso mpe biloko nyonso oyo basala na baposo ya banyama, na suki ya bantaba to mpe na banzete. » 21 Nganga-Nzambe Eleazari alobaki na basoda oyo bakendeki na bitumba: « Botala bikateli ya mobeko oyo Yawe apesaki epai ya Moyize: 22 ‹ Ezali kaka wolo, palata, bronze, motako, ete, mbodi 23 mpe biloko nyonso oyo ezikaka na moto te nde bokolekisa na moto mpo na kopetola yango; bokopetola yango lisusu na mayi ya bopetolami. Kasi bokopetola na mayi biloko nyonso oyo ezikaka na moto. 24 Na mokolo ya sambo, bokopetola bilamba na bino mpe bokokoma peto mpe na sima nde bokoki kozonga na molako. › » 25 Yawe alobaki na Moyize: 26 « Yo, Moyize, mpe Nganga-Nzambe Eleazari, elongo na bakambi ya mabota ya lisanga ya Isalaele, botanga motango ya bato, ya banyama nyonso oyo bakangaki. 27 Kabola bomengo ya bitumba yango kati na basoda oyo bakendeki na bitumba mpe bato ya lisanga ya Isalaele oyo batikalaki. 28 Na ndambo eteni oyo okopesa na basoda oyo bakendeki na bitumba, tia pembeni lokola mpako mpo na Yawe, moto moko kati na bato nkama mitano, ebwele moko kati na bibwele nkama mitano, ezala ya ngombe, ya ane, ya meme to ya bantaba. 29 Kamata mpako yango kati na ndambo ya eteni na bango mpe pesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari lokola eteni ya Yawe. 30 Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. » 31 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari basalaki ndenge Yawe atindaki Moyize. 32 Bomengo ya bitumba oyo etikalaki na oyo basoda oyo bakendeki na bitumba babotolaki ezalaki: meme na bantaba nkoto nkama motoba na tuku sambo na mitano; 33 ngombe nkoto tuku sambo na mibale; 34 ane nkoto tuku motoba na moko 35 mpe basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te nkoto tuku misato na mibale. 36 Ndambo ya eteni ya bomengo ya bitumba oyo bato oyo bakendeki na bitumba bazwaki ezalaki: bameme mpe bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano; 37 mpe mpako mpo na Yawe ezalaki: bameme mpe bantaba nkama motoba na tuku sambo na mitano; 38 bangombe nkoto tuku misato na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki: bangombe tuku sambo na mibale; 39 ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki: ba-ane tuku motoba na moko; 40 bato nkoto zomi na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki: bato tuku misato na mibale. 41 Moyize apesaki mpako mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe Eleazari ndenge Yawe atindaki ye. 42 Boye, ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, oyo Moyize alongolaki na bomengo ya bato oyo bakendeki na bitumba, 43 ndambo oyo epesamelaki lisanga ezalaki: meme elongo na bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano; 44 ngombe nkoto tuku misato na motoba; 45 ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano, 46 mpe bato nkoto zomi na motoba. 47 Na ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, Moyize alongolaki moto moko kati na bato tuku mitano mpe nyama moko kati na banyama tuku mitano, ndenge Yawe atindaki ye mpe apesaki yango epai ya Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. 48 Bongo, bakonzi ya mampinga, bakonzi ya bankoto ya basoda mpe ya bankama bayaki epai ya Moyize. 49 Balobaki na Moyize: « Basali na yo batangi motango ya basoda oyo bazali na se ya bokonzi na biso mpe ata moko te azangi. 50 Boye, tomemi epai na Yawe lokola makabo, biloko ya wolo oyo: biloko oyo balataka na maboko, bapete, bamedayi, biloko ya matoyi, basheneti oyo moko na moko na biso azwaki mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe. » 51 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki na maboko na bango, biloko nyonso oyo basala na wolo. 52 Wolo nyonso oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki lokola makabo mpo na Yawe, na maboko ya bakonzi ya bankoto mpe ya bankama, ezalaki bakilo nkama moko na tuku mwambe na minei. 53 Soda na soda akamataki na makasi mpo na ye moko bomengo na ye ya bitumba. 54 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki wolo na maboko ya bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda mpe bamemaki yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele liboso ya Yawe.

< Mitango 31 >