< Mitango 31 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
耶和华吩咐摩西说:
2 « Zongisa mabe na mabe oyo bato ya Madiani basalaki bana ya Isalaele, mpe na sima, okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi. »
“你要在米甸人身上报以色列人的仇,后来要归到你列祖那里。”
3 Boye Moyize alobaki na bato: « Tika ete mibali kati na bino balata bibundeli mpo na kokende kobundisa mokili ya Madiani mpe kozongisela bango mabe na mabe, na Kombo na Yawe.
摩西吩咐百姓说:“要从你们中间叫人带兵器出去攻击米甸,好在米甸人身上为耶和华报仇。
4 Libota moko na moko ya Isalaele ekotinda basoda nkoto moko na etumba. »
从以色列众支派中,每支派要打发一千人去打仗。”
5 Boye, baponaki bato nkoto moko mpo na libota moko na moko kati na mabota ya Isalaele. Bongo, bato nkoto zomi na mibale balataki bibundeli mpo na kokende na etumba.
于是从以色列千万人中,每支派交出一千人,共一万二千人,带着兵器预备打仗。
6 Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela.
摩西就打发每支派的一千人去打仗,并打发祭司以利亚撒的儿子非尼哈同去;非尼哈手里拿着圣所的器皿和吹大声的号筒。
7 Babundisaki Madiani ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize mpe babomaki mibali nyonso.
他们就照耶和华所吩咐摩西的,与米甸人打仗,杀了所有的男丁。
8 Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo: Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga.
在所杀的人中,杀了米甸的五王,就是以未、利金、苏珥、户珥、利巴,又用刀杀了比珥的儿子巴兰。
9 Bana ya Isalaele bakangaki basi mpe bana ya Madiani elongo na banyama, bibwele mpe bozwi na bango nyonso lokola bomengo ya bitumba.
以色列人掳了米甸人的妇女孩子,并将他们的牲畜、羊群,和所有的财物都夺了来,当作掳物,
10 Batumbaki bingumba nyonso epai wapi bato ya Madiani bazalaki kovanda, na milako na bango nyonso.
又用火焚烧他们所住的城邑和所有的营寨,
11 Bamemaki bomengo nyonso ya bitumba mpe biloko nyonso oyo babotolaki elongo na bato, banyama;
把一切所夺的、所掳的,连人带牲畜都带了去,
12 mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko.
将所掳的人,所夺的牲畜、财物,都带到摩押平原,在约旦河边与耶利哥相对的营盘,交给摩西和祭司以利亚撒,并以色列的会众。
13 Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bayaki koyamba bango na libanda ya molako.
摩西和祭司以利亚撒,并会众一切的首领,都出到营外迎接他们。
14 Moyize atombokelaki bakonzi oyo baponamaki mpo na kotambolisa mampinga, bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda, oyo bawutaki na bitumba.
摩西向打仗回来的军长,就是千夫长、百夫长,发怒,
15 Moyize atunaki bango: « Boni, botiki basi nyonso na bomoi?
对他们说:“你们要存留这一切妇女的活命吗?
16 Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe.
这些妇女因巴兰的计谋,叫以色列人在毗珥的事上得罪耶和华,以致耶和华的会众遭遇瘟疫。
17 Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali;
所以,你们要把一切的男孩和所有已嫁的女子都杀了。
18 kasi bobatela na bomoi mpo na bino, basi nyonso oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te.
但女孩子中,凡没有出嫁的,你们都可以存留她的活命。
19 Moto nyonso kati na bino oyo abomaki moto to asimbaki ebembe, asengeli kozala libanda ya molako mikolo sambo. Boye, na mokolo ya misato mpe ya sambo, bosengeli komipetola, bino mpe bakangami na bino.
你们要在营外驻扎七日;凡杀了人的,和一切摸了被杀的,并你们所掳来的人口,第三日,第七日,都要洁净自己,
20 Bokopetola mpe lisusu bilamba nyonso mpe biloko nyonso oyo basala na baposo ya banyama, na suki ya bantaba to mpe na banzete. »
也要因一切的衣服、皮物、山羊毛织的物,和各样的木器,洁净自己。”
21 Nganga-Nzambe Eleazari alobaki na basoda oyo bakendeki na bitumba: « Botala bikateli ya mobeko oyo Yawe apesaki epai ya Moyize:
祭司以利亚撒对打仗回来的兵丁说:“耶和华所吩咐摩西律法中的条例乃是这样:
22 ‹ Ezali kaka wolo, palata, bronze, motako, ete, mbodi
金、银、铜、铁、锡、铅,
23 mpe biloko nyonso oyo ezikaka na moto te nde bokolekisa na moto mpo na kopetola yango; bokopetola yango lisusu na mayi ya bopetolami. Kasi bokopetola na mayi biloko nyonso oyo ezikaka na moto.
凡能见火的,你们要叫它经火就为洁净,然而还要用除污秽的水洁净它;凡不能见火的,你们要叫它过水。
24 Na mokolo ya sambo, bokopetola bilamba na bino mpe bokokoma peto mpe na sima nde bokoki kozonga na molako. › »
第七日,你们要洗衣服,就为洁净,然后可以进营。”
25 Yawe alobaki na Moyize:
耶和华晓谕摩西说:
26 « Yo, Moyize, mpe Nganga-Nzambe Eleazari, elongo na bakambi ya mabota ya lisanga ya Isalaele, botanga motango ya bato, ya banyama nyonso oyo bakangaki.
“你和祭司以利亚撒,并会众的各族长,要计算所掳来的人口和牲畜的总数。
27 Kabola bomengo ya bitumba yango kati na basoda oyo bakendeki na bitumba mpe bato ya lisanga ya Isalaele oyo batikalaki.
把所掳来的分作两半:一半归与出去打仗的精兵,一半归与全会众。
28 Na ndambo eteni oyo okopesa na basoda oyo bakendeki na bitumba, tia pembeni lokola mpako mpo na Yawe, moto moko kati na bato nkama mitano, ebwele moko kati na bibwele nkama mitano, ezala ya ngombe, ya ane, ya meme to ya bantaba.
又要从出去打仗所得的人口、牛、驴、羊群中,每五百取一,作为贡物奉给耶和华。
29 Kamata mpako yango kati na ndambo ya eteni na bango mpe pesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari lokola eteni ya Yawe.
从他们一半之中,要取出来交给祭司以利亚撒,作为耶和华的举祭。
30 Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »
从以色列人的一半之中,就是从人口、牛、驴、羊群、各样牲畜中,每五十取一,交给看守耶和华帐幕的利未人。”
31 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari basalaki ndenge Yawe atindaki Moyize.
于是摩西和祭司以利亚撒照耶和华所吩咐摩西的行了。
32 Bomengo ya bitumba oyo etikalaki na oyo basoda oyo bakendeki na bitumba babotolaki ezalaki: meme na bantaba nkoto nkama motoba na tuku sambo na mitano;
除了兵丁所夺的财物以外,所掳来的:羊六十七万五千只;
33 ngombe nkoto tuku sambo na mibale;
牛七万二千只;
34 ane nkoto tuku motoba na moko
驴六万一千匹;
35 mpe basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te nkoto tuku misato na mibale.
女人共三万二千口,都是没有出嫁的。
36 Ndambo ya eteni ya bomengo ya bitumba oyo bato oyo bakendeki na bitumba bazwaki ezalaki: bameme mpe bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano;
出去打仗之人的分,就是他们所得的那一半,共计羊三十三万七千五百只,
37 mpe mpako mpo na Yawe ezalaki: bameme mpe bantaba nkama motoba na tuku sambo na mitano;
从其中归耶和华为贡物的,有六百七十五只;
38 bangombe nkoto tuku misato na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki: bangombe tuku sambo na mibale;
牛三万六千只,从其中归耶和华为贡物的,有七十二只;
39 ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki: ba-ane tuku motoba na moko;
驴三万零五百匹,从其中归耶和华为贡物的,有六十一匹;
40 bato nkoto zomi na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki: bato tuku misato na mibale.
人一万六千口,从其中归耶和华的,有三十二口。
41 Moyize apesaki mpako mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe Eleazari ndenge Yawe atindaki ye.
摩西把贡物,就是归与耶和华的举祭,交给祭司以利亚撒,是照耶和华所吩咐摩西的。
42 Boye, ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, oyo Moyize alongolaki na bomengo ya bato oyo bakendeki na bitumba,
以色列人所得的那一半,就是摩西从打仗的人取来分给他们的。(
43 ndambo oyo epesamelaki lisanga ezalaki: meme elongo na bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano;
会众的那一半有:羊三十三万七千五百只;
44 ngombe nkoto tuku misato na motoba;
牛三万六千只;
45 ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano,
驴三万零五百匹;
46 mpe bato nkoto zomi na motoba.
人一万六千口。)
47 Na ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, Moyize alongolaki moto moko kati na bato tuku mitano mpe nyama moko kati na banyama tuku mitano, ndenge Yawe atindaki ye mpe apesaki yango epai ya Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe.
无论是人口是牲畜,摩西每五十取一,交给看守耶和华帐幕的利未人,是照耶和华所吩咐摩西的。
48 Bongo, bakonzi ya mampinga, bakonzi ya bankoto ya basoda mpe ya bankama bayaki epai ya Moyize.
带领千军的各军长,就是千夫长、百夫长,都近前来见摩西,
49 Balobaki na Moyize: « Basali na yo batangi motango ya basoda oyo bazali na se ya bokonzi na biso mpe ata moko te azangi.
对他说:“仆人权下的兵已经计算总数,并不短少一人。
50 Boye, tomemi epai na Yawe lokola makabo, biloko ya wolo oyo: biloko oyo balataka na maboko, bapete, bamedayi, biloko ya matoyi, basheneti oyo moko na moko na biso azwaki mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe. »
如今我们将各人所得的金器,就是脚链子、镯子、打印的戒指、耳环、手钏,都送来为耶和华的供物,好在耶和华面前为我们的生命赎罪。”
51 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki na maboko na bango, biloko nyonso oyo basala na wolo.
摩西和祭司以利亚撒就收了他们的金子,都是打成的器皿。
52 Wolo nyonso oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki lokola makabo mpo na Yawe, na maboko ya bakonzi ya bankoto mpe ya bankama, ezalaki bakilo nkama moko na tuku mwambe na minei.
千夫长、百夫长所献给耶和华为举祭的金子共有一万六千七百五十舍客勒。
53 Soda na soda akamataki na makasi mpo na ye moko bomengo na ye ya bitumba.
各兵丁都为自己夺了财物。
54 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki wolo na maboko ya bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda mpe bamemaki yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele liboso ya Yawe.
摩西和祭司以利亚撒收了千夫长、百夫长的金子,就带进会幕,在耶和华面前作为以色列人的纪念。

< Mitango 31 >