< Mitango 22 >

1 Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko. 2 Boye Balaki, mwana mobali ya Tsipori, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo bana ya Isalaele basalaki bato ya Amori. 3 Mpe bato ya Moabi bakomaki kobanga makasi mpo ete bana ya Isalaele bazalaki ebele penza. Boye, bakomaki na somo mingi liboso ya bana ya Isalaele. 4 Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani: « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. » Na tango wana, ezalaki Balaki, mwana mobali ya Tsipori, nde azalaki mokonzi ya Moabi. 5 Atindaki bantoma kobenga Balami, mwana mobali ya Beori, oyo azalaki kovanda na Petori, pembeni ya ebale Efrate, mboka oyo ye abotama. Balaki alobaki na Balami: — Bato moko bawuti kobima na Ejipito, batondisi mokili mobimba mpe bayei sik’oyo kovanda pembeni na ngai. 6 Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe. 7 Bakambi ya Moabi mpe ya Madiani bakendeki mpe bamemaki makabo mpo na kopesa na Balami, momoni makambo. Tango bakomaki epai ya Balami, bayebisaki ye makambo oyo Balaki atindaki. 8 Balami alobaki na bango: — Bolekisa butu awa, mpe nakozongisela bino eyano oyo Yawe akopesa ngai. Boye bakambi ya Moabi bavandaki elongo na ye. 9 Nzambe ayaki epai ya Balami mpe atunaki ye: — Bato oyo bazali epai na yo bazali banani? 10 Balami alobaki na Nzambe: — Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, atindeli ngai maloba oyo: 11 « Bato moko bawuti kobima na Ejipito mpe batondisi mokili mobimba. Sik’oyo yaka mpe lakela bango mabe mpo na ngai. Tango mosusu nakokoka kobundisa bango mpe kobengana bango. » 12 Kasi Nzambe alobaki na Balami: — Kokende elongo na bango te. Okoki kolakela bato wana mabe te, pamba te bazali bato bapambolama. 13 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki mpe alobaki na bakambi ya Balaki: — Bozonga na mboka na bino, pamba te Yawe aboyi ete nakende elongo na bino. 14 Boye, bakambi ya Moabi bazongaki epai ya Balaki mpe balobaki: — Balami aboyi koya elongo na biso. 15 Balaki atindaki bakambi mosusu oyo bazalaki mingi mpe na lokumu koleka bakambi oyo atindaki liboso. 16 Bakomaki epai ya Balami mpe balobaki: — Tala liloba oyo Balaki, mwana ya mobali ya Tsipori alobi: « Tika ete eloko moko te epekisa yo koya epai na ngai! 17 Pamba te nakopesa yo lifuti ya malamu mpe nakosala nyonso oyo okoloba. Yaka penza mpe lakela bato oyo mabe mpo na ngai. » 18 Kasi Balami azongiselaki bango: — Ezala soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakokoka kosala eloko moko te ya monene to ya moke oyo ekokende libanda ya mibeko ya Yawe, Nzambe na ngai. 19 Bino mpe lisusu bolekisa butu awa ndenge bandeko na bino basalaki, mpo ete naluka koyeba lisusu likambo oyo Yawe akoyebisa na ngai. 20 Na butu wana, Nzambe ayaki epai na Balami mpe alobaki: — Lokola bato oyo bayei mpo na kobenga yo, kende elongo na bango. Kasi sala kaka makambo oyo nakoyebisa yo. 21 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki, abongisaki ane na ye ya mwasi mpe akendeki elongo na bakambi ya Moabi. 22 Kasi tango akendeki, Nzambe asilikaki makasi mpe anjelu ya Yawe atelemaki na nzela mpo na kokanga ye nzela tango azalaki kotambola likolo ya ane elongo na basali na ye mibale. 23 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe atelema na kati-kati ya nzela na mopanga ya minu na loboko na ye, ane ebimaki na nzela mpe ekimaki na elanga. Boye, Balami abetaki ane mpo ete ekoka kozonga na nzela. 24 Mpe lisusu, anjelu ya Yawe akendeki kotelema na nzela moko ya moke, oyo elekela na kati-kati ya bilanga mibale ya vino, oyo mopanzi moko na moko na yango ezalaki lokola na bamir mibale. 25 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, epusanaki pembeni ya mir, efinaki lokolo ya Balami na mir. Balami abetaki yango lisusu. 26 Anjelu ya Yawe alekaki liboso na bango mpe akendeki kotelema na esika moko ya moke penza, epai wapi nzela ya kobalukela na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi ezali te. 27 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, evandelaki Balami, nkolo na yango. Balami atombokaki makasi mpe akomaki kobamba ane lingenda na ye. 28 Bongo, Yawe afungolaki monoko ya ane, mpe elobaki na Balami: — Likambo nini nasali yo mpo ete okoka kobeta ngai mbala misato? 29 Balami azongiselaki ane: — Ozali kosakana na ngai! Soki nazalaki na mopanga na loboko na ngai, mbele nabomi yo kaka sik’oyo! 30 Ane elobi na Balami: — Boni, nazali ane na yo te oyo osalelaka tango nyonso kino na mokolo ya lelo? Nazalaka solo na momesano ya kosalela yo makambo ya boye? Balami azongisaki: — Te! 31 Boye, Yawe afungolaki miso ya Balami, mpe Balami amonaki anjelu ya Yawe atelema na nzela, na mopanga na ye ya monene. Bongo, Balami afukamaki mpe akweyaki elongi kino na mabele. 32 Anjelu ya Yawe atunaki ye: — Mpo na nini obeti ane na yo mbala misato? Nayaki awa mpo na kokanga yo nzela, pamba te nzela na yo ezali mabe liboso na Ngai. 33 Ane emonaki Ngai mpe ekimaki Ngai mbala misato. Soki ekimaki Ngai te, solo penza, nalingaki koboma yo, kasi nalingaki kotika yango na bomoi. 34 Balami alobaki na anjelu ya Yawe: — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai. 35 Anjelu ya Yawe alobaki na Balami: — Kende elongo na bato oyo kasi okoloba kaka makambo oyo nakoloba na yo. Boye, Balami akendeki elongo na bakambi ya Balaki. 36 Tango Balaki ayokaki sango ete Balami azali koya, akendeki kokutana na ye na engumba ya bato ya Moabi, oyo ezalaka na mondelo ya Arinoni, na suka ya mokili na ye. 37 Balaki alobaki na Balami: — Boni, natindaki te bato na lombangu mpo na kobenga yo? Mpo na nini oyaki epai na ngai te? Okanisaki ete nazangi makoki ya kofuta yo? 38 Balami azongiselaki Balaki: — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai. 39 Boye, Balami akendeki nzela moko na Balaki kino na Kiriati-Utsoti. 40 Balaki abonzaki mbeka ya ngombe mpe ya meme, apesaki ndambo epai ya Balami mpe ndambo mosusu epai ya bakambi oyo bazalaki na ye elongo. 41 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balaki amemaki Balami, mpe bamataki na Bamoti-Bala; mpe wuta kuna, bakokaki komona ndambo ya bana ya Isalaele.

< Mitango 22 >