< Mitango 2 >

1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
耶和華曉諭摩西、亞倫說:
2 « Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga; moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye, zingazinga ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwa mosika na yango. »
「以色列人要各歸自己的纛下,在本族的旗號那裏,對着會幕的四圍安營。
3 Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.
在東邊,向日出之地,照着軍隊安營的是猶大營的纛。有亞米拿達的兒子拿順作猶大人的首領。
4 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.
他軍隊被數的,共有七萬四千六百名。
5 Bato ya libota ya Isakari bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Yuda. Mokambi ya bato ya Isakari ezali Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari.
挨着他安營的是以薩迦支派。有蘇押的兒子拿坦業作以薩迦人的首領。
6 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na minei na nkama minei.
他軍隊被數的,共有五萬四千四百名。
7 Mpe bato ya libota ya Zabuloni bakozala pembeni ya bato ya libota ya Isakari. Mokambi ya bato ya Zabuloni ezali Eliabi, mwana mobali ya Eloni.
又有西布倫支派。希倫的兒子以利押作西布倫人的首領。
8 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei.
他軍隊被數的,共有五萬七千四百名。
9 Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Yuda ezali bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na motoba na nkama minei kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala liboso.
凡屬猶大營、按着軍隊被數的,共有十八萬六千四百名,要作第一隊往前行。
10 Na ngambo ya sude, milongo ya mampinga ya Ribeni bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Ribeni ezali Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri.
「在南邊,按着軍隊是呂便營的纛。有示丟珥的兒子以利蓿作呂便人的首領。
11 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.
他軍隊被數的,共有四萬六千五百名。
12 Bato ya libota ya Simeoni bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Ribeni. Mokambi ya bato ya Simeoni ezali Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi.
挨着他安營的是西緬支派。蘇利沙代的兒子示路蔑作西緬人的首領。
13 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.
他軍隊被數的,共有五萬九千三百名。
14 Mpe bato ya libota ya Gadi bakozala pembeni ya bato ya libota ya Simeoni. Mokambi ya bato ya Gadi ezali Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
又有迦得支派。丟珥的兒子以利雅薩作迦得人的首領。
15 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba na tuku mitano.
他軍隊被數的,共有四萬五千六百五十名,
16 Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Ribeni ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na moko na nkama minei na tuku mitano kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na sima.
凡屬呂便營、按着軍隊被數的,共有十五萬一千四百五十名,要作第二隊往前行。
17 Bongo Ndako ya kapo ya Bokutani mpe molako ya Balevi ekozala na kati-kati ya milako. Bakokende na molongo ndenge batielaki milako na bango, moko na moko na esika na ye mpe na se ya bendele na ye.
「隨後,會幕要往前行,有利未營在諸營中間。他們怎樣安營就怎樣往前行,各按本位,各歸本纛。
18 Na ngambo ya weste, milongo ya mampinga ya Efrayimi bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Efrayimi ezali Elishama, mwana mobali ya Amiwudi.
「在西邊,按着軍隊是以法蓮營的纛。亞米忽的兒子以利沙瑪作以法蓮人的首領。
19 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na nkama mitano.
他軍隊被數的,共有四萬零五百名。
20 Bato ya libota ya Manase bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Efrayimi. Mokambi ya bato ya Manase ezali Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri.
挨着他的是瑪拿西支派。比大蓿的兒子迦瑪列作瑪拿西人的首領。
21 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.
他軍隊被數的,共有三萬二千二百名。
22 Mpe bato ya libota ya Benjame bakozala pembeni ya bato ya libota ya Manase. Mokambi ya bato ya libota ya Benjame ezali Abidani, mwana mobali ya Gideoni.
又有便雅憫支派。基多尼的兒子亞比但作便雅憫人的首領。
23 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.
他軍隊被數的,共有三萬五千四百名。
24 Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Efrayimi ezali bato nkoto nkama moko na mwambe na nkama moko, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na molongo ya misato.
凡屬以法蓮營、按着軍隊被數的,共有十萬零八千一百名,要作第三隊往前行。
25 Na ngambo ya nor, milongo ya mampinga ya Dani bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Dani ezali Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi.
「在北邊,按着軍隊是但營的纛。亞米沙代的兒子亞希以謝作但人的首領。
26 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
他軍隊被數的,共有六萬二千七百名。
27 Bato ya libota ya Aseri bakotia molako na bango pembeni ya bato ya libota ya Dani. Mokambi ya bato ya Aseri ezali Pagieli, mwana mobali ya Okirani.
挨着他安營的是亞設支派。俄蘭的兒子帕結作亞設人的首領。
28 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
他軍隊被數的,共有四萬一千五百名。
29 Mpe bato ya libota ya Nefitali bakozala pembeni ya bato ya libota ya Aseri. Mokambi ya bato ya Nefitali ezali Akira, mwana mobali ya Enani.
又有拿弗他利支派。以南的兒子亞希拉作拿弗他利人的首領。
30 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
他軍隊被數的,共有五萬三千四百名。
31 Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Dani ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na sambo na nkama motoba, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala na sima na bango nyonso, na se ya bendele na bango.
凡但營被數的,共有十五萬七千六百名,要歸本纛作末隊往前行。」
32 Bango nde bana ya Isalaele oyo batangamaki, kolanda mabota na bango. Motango ya bato nyonso oyo bazalaki kati na milako, kolanda milongo ya mampinga na bango, ezalaki bato nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
這些以色列人,照他們的宗族,按他們的軍隊,在諸營中被數的,共有六十萬零三千五百五十名。
33 Kasi batangaki Balevi te elongo na bato mosusu ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
惟獨利未人沒有數在以色列人中,是照耶和華所吩咐摩西的。
34 Boye, bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. Na lolenge wana nde batiaki milako na bango na se ya babendele na bango mpe batambolaki bongo, moto na moto na libota na ye mpe na etuka na ye.
以色列人就這樣行,各人照他們的家室、宗族歸於本纛,安營起行,都是照耶和華所吩咐摩西的。

< Mitango 2 >