< Mitango 13 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
L’Éternel parla ainsi à Moïse:
2 « Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. »
"Envoie toi-même des hommes pour explorer le pays de Canaan, que je destine aux enfants d’Israël; vous enverrez un homme respectivement par tribu paternelle, tous éminents parmi eux."
3 Na mitindo ya Yawe, Moyize atindaki bango wuta na esobe ya Parani. Bango nyonso bazalaki bakambi ya mabota ya bana ya Isalaele.
Et Moïse les envoya du désert de Pharan, selon la parole de l’Éternel; c’étaient tous des personnages considérables entre les enfants d’Israël.
4 Tala bakombo na bango: mpo na libota ya Ribeni: Chamuwa, mwana mobali ya Zakuri;
Et voici leurs noms: pour la tribu de Ruben, Chammoûa, fils de Zakkour;
5 mpo na libota ya Simeoni: Shafati, mwana mobali ya Ori;
pour la tribu de Siméon, Chafat, fils de Hori;
6 mpo na libota ya Yuda: Kalebi, mwana mobali ya Yefune;
pour la tribu de Juda, Caleb, fils de Yefounné;
7 mpo na libota ya Isakari: Yigali, mwana mobali ya Jozefi;
pour la tribu d’Issachar, Yigal, fils de Joseph;
8 mpo na libota ya Efrayimi: Oze, mwana mobali ya Nuni;
pour la tribu d’Ephraïm, Hochéa, fils de Noun;
9 mpo na libota ya Benjame: Paliti, mwana mobali ya Rafu;
pour la tribu de Benjamin, Palti, fils de Rafou;
10 mpo na libota ya Zabuloni: Gadieli, mwana mobali ya Sodi;
pour la tribu de Zabulon, Gaddïel, fils de Sodi;
11 mpo na libota ya Jozefi na nzela ya Manase: Gaadi, mwana mobali ya Susi;
pour la tribu de Joseph formant celle de Manassé, Gaddi, fils de Çouci;
12 mpo na libota ya Dani: Amieli, mwana mobali ya Gemali;
pour la tribu de Dan, Ammïel, fils de Ghemalli;
13 mpo na libota ya Aseri: Seturi, mwana mobali ya Mikaeli;
pour la tribu d’Asher, Sethour, fils de Mikhaêl;
14 mpo na libota ya Nefitali: Nakibi, mwana mobali ya Vofisi;
pour la tribu de Nephtali, Nahbi, fils de Vofsi;
15 mpo na libota ya Gadi: Geweli, mwana mobali ya Maki.
pour la tribu de Gad, Gheouêl, fils de Makhi.
16 Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. »
Tels sont les noms des hommes que Moïse envoya explorer la contrée. (Moïse avait nommé Hochéa, fils de Noun: Josué).
17 Tango Moyize atindaki bango mpo na kononga mokili ya Kanana, alobaki: « Bolekela na nzela ya etuka ya Negevi mpe bokotela na nzela ya mokili ya bangomba.
Moïse leur donna donc mission d’explorer le pays de Canaan, en leur disant: "Dirigez-vous de ce côté, vers le sud, et gravissez la montagne.
18 Botala soki mokili yango ezali ndenge nini mpe soki bato oyo bavandaka kuna bazalaka makasi to balemba, soki bazalaka ebele to moke.
Vous observerez l’aspect de ce pays et le peuple qui l’occupe, s’il est robuste ou faible, peu nombreux ou considérable;
19 Botala ndenge nini mokili epai wapi bazali kowumela ezali: soki ezali malamu to mabe; soki bazingela bingumba na yango na bamir to te.
quant au pays qu’il habite, s’il est bon ou mauvais; comment sont les villes où il demeure, des villes ouvertes ou des places fortes;
20 Botala soki mabele na yango ezali ndenge nini: ebotaka malamu to te; ezali na banzete to te. Bosala nyonso penza ete bozonga na mbuma ya mokili yango. » Ezalaki eleko ya kobuka bambuma ya liboso ya vino.
quant au sol, s’il est gras ou maigre, s’il est boisé ou non. Tâchez aussi d’emporter quelques-uns des fruits du pays." C’Était alors la saison des premiers raisins.
21 Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati.
Et ils s’en allèrent explorer le pays, depuis le désert de Cîn jusqu’à Rehob, vers Hémath.
22 Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito.
Ils s’acheminèrent du côté du midi, et l’on parvint jusqu’à Hébrôn, où demeuraient Ahimân, Chêchaï et Talmaï, descendants d’Anak. Hébrôn avait été bâtie sept ans avant Tanis d’Egypte.
23 Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi.
Arrivés à la vallée d’Echkol, ils y coupèrent un sarment avec une grappe de raisin, qu’ils portèrent à deux au moyen d’une perche, de plus, quelques grenades et quelques figues.
24 Wuta na tango wana, bakomaki kobenga esika yango « lubwaku ya Eshikoli, » oyo elingi koloba « lubwaku ya liboke ya bambuma ya vino, » mpo na kokanisa liboke ya bambuma ya vino oyo bana ya Isalaele babukaki kuna.
On nomma ce lieu vallée d’Echkol, à cause de la grappe qu’y avaient coupée les enfants d’Israël.
25 Sima na mikolo tuku minei, bazongaki wuta na mokili oyo banongaki.
Ils revinrent de cette exploration du pays, au bout de quarante jours.
26 Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.
Ils allèrent trouver Moïse, Aaron et toute la communauté des enfants d’Israël, dans le désert de Pharan, à Kadêch. Ils rendirent compte à eux et à toute la communauté, leur montrèrent les fruits de la contrée,
27 Bapesaki sango oyo epai ya Moyize: « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi; tala kutu bambuma ya mokili yango.
et lui firent ce récit: "Nous sommes entrés dans le pays où tu nous avais envoyés; oui, vraiment, il ruisselle de lait et de miel, et voici de ses fruits.
28 Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna.
Mais il est puissant le peuple qui habite ce pays! Puis, les villes sont fortifiées et très grandes, et même nous y avons vu des descendants d’Anak!
29 Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »
Amalec habite la région du midi; le Héthéen, le Jébuséen et l’Amorréen habitent la montagne, et le Cananéen occupe le littoral et la rive du Jourdain."
30 Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki: — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango!
Caleb fit taire le peuple soulevé contre Moïse, et dit: "Montons, montons-y et prenons-en possession, car certes nous en serons vainqueurs!"
31 Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki: — Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso.
Mais les hommes qui étaient partis avec lui, dirent: "Nous ne pouvons marcher contre ce peuple, car il est plus fort que nous."
32 Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba: « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe.
Et ils décrièrent le pays qu’ils avaient exploré, en disant aux enfants d’Israël: "Le pays que nous avons parcouru pour l’explorer est un pays qui dévorerait ses habitants; quant au peuple que nous y avons vu, ce sont tous gens de haute taille.
33 Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »
Nous y avons même vu les Nefilîm, les enfants d’Anak, descendants des Nefilîm: nous étions à nos propres yeux comme des sauterelles, et ainsi étions-nous à leurs yeux."

< Mitango 13 >