< Mishe 7 >

1 Tala, mawa na ngai! Nakomi lokola moto oyo azali koluka kobuka bambuma na eleko ya elanga, na tango oyo bazongelaka kobuka bambuma ya vino oyo etikalaka. Kasi ezali ata na liboke moko te ya bambuma ya vino ya kolia to mbuma ata moko te ya figi ya sika oyo nasepelaka kolia.
Woe, woe is me, for I have become like a field after harvest, like a vineyard after gathering; not a cluster of grapes to eat, not a fig that anyone desires.
2 Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.
The honest have perished from the land, of the upright among people there is none. All of them lie in wait to shed blood. They hunt one another with the net.
3 Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.
Their hands know well how to do evil, the officer and judge demands a bribe, the high official decides as he pleases and they conspire to pervert justice.
4 Moto oyo aleki malamu kati na bango azali lokola nzube, moto oyo aleki sembo azali mabe koleka liboke ya basende. Mokolo oyo bakengeli na yo basakolaki ekokisami, mokolo oyo Yawe ayei kopesa yo etumbu. Sik’oyo, ekomi tango na bango ya koyoka soni.
The best of them are like a thorn thicket, their most upright like a prickly hedge. The day of their punishment has come, now will be their confusion!
5 Botia motema te epai ya bazalani na bino, botia elikya te epai ya baninga na bino ya motema. Ezala liboso ya mwasi oyo alalaka na tolo na yo, keba na maloba oyo ezali kobima na monoko na yo.
Do not trust your neighbour, do not rely on a friend. From the wife who lies in your arms guard your tongue.
6 Pamba te mwana mobali azali koyokisa tata na ye soni, elenge mwasi azali kotelemela mama na ye, mwasi ya libala azali kotelemela mama-bokilo na ye; bongo monguna ya moto, ezali kaka moto ya libota na ye.
For son insults father, daughter rises up against mother, daughter-in-law against mother-in-law, a man’s enemies are the people of his own household.
7 Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe, nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai; Nzambe na ngai akoyoka ngai.
But I will look to the Lord, I will wait for the God of my salvation. My God will hear me!
8 Oh banguna na ngai, boseka ngai te! Ata soki nakweyi, nakotelema kaka. Ata soki navandi kati na molili, Yawe azali pole na ngai.
Do not rejoice over me, my enemy. If I have fallen, I will rise. If I sit in darkness, the Lord is my light.
9 Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.
The anger of the Lord I will bear, for against him have I sinned – until he champions my cause and gives judgment for me. He will bring me into to the light, I will see his justice.
10 Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai: « Wapi Yawe, Nzambe na yo? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.
So my enemy will see, and shame will cover them, they who said, ‘Where is the Lord your God?’ I will look upon them, they will be trampled on like mud in the street!
11 Mokolo ya kotonga lisusu bamir na yo ekoya; ezali mokolo wana nde bandelo ya mokili na yo ekopusama lisusu mosika.
It is a day for rebuilding your walls, this day will your boundary will be extended.
12 Na mokolo wana, bato ebele bakoya epai na yo longwa na mokili ya Asiri mpe na bingumba ya Ejipito, ata longwa na mokili ya Ejipito kino na ebale Efrate, longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ngomba moko kino na mosusu.
This day they will come to you, from Assyria and the cities of Egypt, and from Egypt even to the Euphrates River, from sea to sea, and from mountain to mountain.
13 Mokili ekobebisama likolo ya bato wana, likolo ya bizaleli na bango ya mabe.
Though the land has become a desolation because of its inhabitants, because of their deeds.
14 Kamba bato na Yo na lingenda na Yo ndenge mobateli bibwele asalaka! Pamba te bazali bameme ya libula na Yo, oyo ezali lokola kotelengana yango moko kati na zamba, na etando moko ya kitoko. Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.
Shepherd your flock with your staff, the flock that belong to you, who live alone in the forest, in the midst of meadows; so that they may pasture in Bashon and Gilead as in the days of old,
15 Nakomonisa yo makambo ya kokamwa lokola na tango obimaki na Ejipito.
as in the days when you came from Egypt, gave us wonders to see.
16 Bato ya bikolo ya bapaya bakomona yango mpe bakoyoka soni; ata soki bazali na nguya ya ndenge nini, bakozanga maloba, mpe matoyi na bango ekokangama.
Nations will see and be ashamed of all their might; they will put their hands to their mouth, their ears will become deaf,
17 Bakolia mabele lokola nyoka, mpe lokola banyama oyo etambolaka na libumu; bakobima na somo wuta na madusu epai wapi bazalaki kobombama, bakoya epai na Yawe, Nzambe na biso, na kolenga.
they will lick the dust like snakes, like creatures that crawl on the earth; they will come trembling and in terror from their hiding places, in dread and fear.
18 Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
Who is a God like you, forgiving iniquity and passing by the rebellion of the remnant of your people? He does not retain his anger forever, but is one who delights in mercy.
19 Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.
He will tread under foot our iniquity; you will cast into the depths of the sea all our iniquities.
20 Okomonisa Jakobi bosembo na Yo, mpe Abrayami, bolamu na Yo, ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.
You will show faithfulness to Jacob, and loving kindness to Abraham, as you have sworn to our ancestors from the days of old.

< Mishe 7 >