< Matayo 28 >

1 Sima na mokolo ya Saba, na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bakendeki kotala kunda.
Now late on the Sabbath, as it began to dawn toward the first day of the week, Mary Magdalene and the other Mary came to see the tomb.
2 Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango.
Behold, there was a great earthquake, for an angel of the Lord descended from heaven, came and rolled away the stone, and sat on it.
3 Azalaki kongenga lokola mikalikali, mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe.
His appearance was like lightning, and his clothing as white as snow.
4 Bakengeli bakomaki kolenga mpo na somo mpe bakomaki lokola bato ya kokufa.
The guards shook with fear and became like dead men.
5 Kasi anjelu alobaki na basi: « Bobanga te! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu.
The angel addressed the women and said to them, “Do not be afraid, for I know that you seek Jesus, who has been crucified.
6 Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki,
He is not here, but is risen, just as he said. Come see the place where the Lord lay.
7 mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye: ‹ Asili kosekwa kati na bakufi; akei liboso na bino, na Galile; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. »
Go quickly and tell his disciples, 'He has risen from the dead. See, he is going ahead of you to Galilee. There you will see him.' See, I have told you.”
8 Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye.
The women quickly left the tomb with fear and great joy, and ran to tell his disciples.
9 Mbala moko, Yesu akutanaki na bango mpe alobaki: — Mbote na bino! Bapusanaki pene na Ye, basimbaki makolo na Ye mpe bagumbamelaki Ye.
Behold, Jesus met them and said, “Greetings!” The women came, took hold of his feet and worshiped him.
10 Yesu alobaki na bango: — Bobanga te! Bokende koyebisa bandeko na Ngai ete bakende na Galile; ezali kuna nde bakomona Ngai.
Then Jesus said to them, “Do not be afraid. Go tell my brothers to leave for Galilee. There they will see me.”
11 Wana basi bazalaki kokende, ndambo ya bakengeli bazongaki kati na engumba mpo na koyebisa na bakonzi ya Banganga-Nzambe, makambo nyonso oyo ewutaki koleka.
Now while the women were going, behold, some of the guards went into the city and told the chief priests all the things that had happened.
12 Bakonzi ya Banganga-Nzambe babengaki bakambi ya bato mpe, elongo na bango, basalaki mwango moko, bapesaki mbongo ebele epai ya basoda
When the priests had met with the elders and discussed the matter with them, they gave a large amount of money to the soldiers
13 mpe balobaki na bango: « Tala ndenge bosengeli koloba: ‹ Wana tozalaki kati na pongi, bayekoli na ye bayaki koyiba nzoto na ye, na butu. ›
and told them, “Say to others, 'Jesus' disciples came by night and stole his body while we were sleeping.'
14 Soki likambo yango ekomi na matoyi ya moyangeli, tokoyeba kosolola na ye mpe kosala nyonso mpo ete bomema ngambo te. »
If this report reaches the governor, we will persuade him and take any worries away from you.”
15 Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge kaka batindaki bango. Lisolo yango epanzanaki kati na Bayuda mpe ezali kolobama kino na mokolo ya lelo.
So the soldiers took the money and did as they had been instructed. This report spread widely among the Jews and continues even today.
16 Bayekoli zomi na moko bakendeki na Galile, na ngomba oyo Yesu ayebisaki bango ete bakende.
But the eleven disciples went to Galilee, to the mountain to which Jesus had directed them.
17 Tango bamonaki Ye, bagumbamelaki Ye; kasi bamosusu kati na bango bandimaki te.
When they saw him, they worshiped him, but some doubted.
18 Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki: — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.
Jesus came to them and spoke to them and said, “All authority has been given to me in heaven and on earth.
19 Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu;
Go therefore and make disciples of all the nations. Baptize them into the name of the Father, of the Son, and of the Holy Spirit.
20 bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili. (aiōn g165)
Teach them to obey all the things that I have commanded you. See, I am with you always, even to the end of the age.” (aiōn g165)

< Matayo 28 >