< Matayo 22 >

1 Yesu alobaki na bango lisusu na masese: 2 — Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali. 3 Atindaki basali na ye kokende koyebisa babengami na feti ete baya na feti, kasi babengami yango baboyaki. 4 Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango: « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei: nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. » 5 Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba: bamoko bakendeki na bilanga na bango; bamosusu, na mombongo na bango; 6 mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango. 7 Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango. 8 Alobaki na basali na ye: « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te. 9 Bokende na bisika oyo babalabala ekutana mpe bobenga bato nyonso oyo bokomona kuna, mpo ete baya na feti ya libala ya mwana na ngai. » 10 Basali bakendeki na babalabala mpe babengaki bato nyonso oyo bamonaki kuna: bato mabe mpe bato malamu. Boye, ndako ya feti etondaki na babengami. 11 Kasi tango mokonzi akotaki mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko oyo alataki te elamba ya feti ya libala. 12 Atunaki ye: « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa. 13 Bongo mokonzi alobaki na basali na ye: « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. » 14 Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke. 15 Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko. 16 Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu: — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te; 17 yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo: Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare? 18 Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki: — Bato ya bilongi mibale! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo? 19 Bolakisa Ngai mbongo oyo bofutaka na yango mpako. Bamemelaki Ye mbongo moko ya ebende. 20 Atunaki bango: — Elilingi mpe makomi oyo ezali ya nani? 21 Bazongisaki: — Ezali ya Sezare. Yesu alobaki na bango: — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe! 22 Tango bayokaki eyano ya Yesu, bakamwaki; batikaki Ye mpe bakendeki. 23 Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye: 24 — Moteyi, Moyize alobaki: « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi. » 25 Nzokande, kati na biso, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki; kasi lokola abotaki te bana oyo basengelaki kokitana na ye, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye. 26 Esalemaki mpe bongo na ndeko ya mibale, na ndeko ya misato kino na ndeko ya sambo. 27 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. 28 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye? 29 Yesu azongiselaki bango: — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te. 30 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo. 31 Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino: 32 « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. 33 Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu. 34 Tango Bafarizeo bayokaki ete Yesu asukisi Basaduseo, bango mpe basanganaki; 35 mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye: 36 — Moteyi, mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso? 37 Yesu azongiselaki ye: — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso. 38 Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene. 39 Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » 40 Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale. 41 Wana Bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango: 42 — Bozali kokanisa nini na tina na Klisto? Azali Mwana ya nani? Bazongiselaki Ye: — Azali mwana ya Davidi! 43 Alobaki na bango: — Bongo ndenge nini Davidi, na botindikami ya Molimo ya Nzambe, abengaki Ye Nkolo? Pamba te alobaki: 44 « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › » 45 Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye? 46 Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.

< Matayo 22 >