< Malashi 1 >

1 Liloba na Yawe. Liloba na Yawe epai ya Isalaele na nzela ya mosakoli Malashi.
The declaration of the word of Yahweh to Israel by the hand of Malachi.
2 « Ngai, nalingaki bino, » elobi Yawe, « kasi bino bozali kotuna Ngai: ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso? › Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te? » elobi Yawe, « Nzokande, nalingaki Jakobi,
“I have loved you,” says Yahweh. But you say, “How have you loved us?” “Was not Esau Jacob's brother?” declares Yahweh. “Yet I have loved Jacob,
3 kasi nayinaki Ezawu; bongo nabongolaki bangomba na ye esobe mpe nakabaki libula na ye epai ya bambwa ya zamba. »
but Esau I have hated. I have made his mountains an abandoned devastation, and I have made his inheritance a place for the jackals of the wilderness.”
4 Edomi akoki koloba: « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango! Bakobenga mokili yango: ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›
If Edom says, “We are beaten down, but we will rebuild the ruins,” Yahweh of hosts will say, “They may rebuild, but I will throw down again. Others will call them 'The country of wickedness' and 'The people whom Yahweh has cursed forever.'
5 Bokomona yango na miso na bino moko mpe bokoloba: ‹ Yawe azali Monene koleka ata bandelo ya etando ya Isalaele. ›
Your own eyes will see this, and you will say, 'Yahweh is great beyond the borders of Israel.'”
6 Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna: ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo? ›
“A son honors his father, and a servant honors his master. If I, then, am a father, where is my honor? If I am a master, where is the reverence for me?” says Yahweh of hosts to you priests, who despise my name. “But you say, 'How have we despised your name?'
7 Bozali kotia bilei ya mbindo na etumbelo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna: ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tokomisi etumbelo na Yo mbindo? › Ezali tango bolobaka: ‹ Mesa ya Yawe ezali na tina te. ›
By offering polluted bread upon my altar. But you say, 'How have we polluted you?' By saying that Yahweh's table is contemptible.
8 Ezali tango bobonzaka lokola mbeka nyama oyo ekufa miso; boni, yango ezali mabe te? Bomeka nanu kopesa yango epai ya moyangeli na bino; boni, akosepela na bino? Akondima bino solo? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
When you offer blind animals for sacrifice, is that not evil? When you offer the lame and sick, is that not evil? Present that to your governor! Will he accept you or will he lift up your face?” says Yahweh of hosts.
9 « Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko! Boni, andima bino solo? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Now you keep asking the face of God, that he may be gracious to us. But Yahweh of hosts says that with such an offering in your hand, would he lift up any of your faces?
10 « Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.
“Oh, if only there were one of you who would shut the temple gates, so that you might not light fires on my altar in vain! I have no pleasure in you,” says Yahweh of hosts, “and I will not accept any offering from your hand.
11 Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
For from the rising of the sun to its setting my name will be great among the nations and in every place incense and pure offerings will be offered in my name. For my name will be great among the nations,” says Yahweh of hosts.
12 « Kasi bino, bozali kosambwisa yango tango bozali koloba ete mesa ya Nkolo ezali na tina te mpe biloko na yango ezali mbindo.
“But you are profaning it when you say the Lord's table is polluted, and that its fruit, its food, is to be despised.
13 Bozali koloba lisusu: ‹ Mokumba nini lisusu oyo! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino? » elobi Yawe.
You also say, 'How tiresome this is,' and you snort at it,” says Yahweh of hosts. “You bring what has been taken by a wild animal or is lame or sick; and this you bring as your offering. Should I accept this from your hand?” says Yahweh.
14 « Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.
“May the deceiver be cursed who has a male animal in his flock and vows to give it to me, and yet sacrifices to me, the Lord, what is flawed! For I am a great king,” says Yahweh of hosts, “and my name will be honored among the nations.”

< Malashi 1 >