< Levitike 1 >

1 Yawe abengaki Moyize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani:
Jehovah called to Moses, and spoke to him out of the Tent of Meeting, saying,
2 « Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme.
"Speak to the children of Israel, and tell them, 'When anyone of you offers an offering to Jehovah, you shall offer your offering of the livestock, from the herd and from the flock.
3 Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.
"'If his offering is a burnt offering from the herd, he shall offer a male without blemish. He shall offer it at the door of the Tent of Meeting, that he may be accepted before Jehovah.
4 Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.
He shall lay his hand on the head of the burnt offering, and it shall be accepted for him to make atonement for him.
5 Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
And he shall kill the bull before Jehovah. Aaron's sons, the priests, shall present the blood and sprinkle the blood around on the altar that is at the door of the Tent of Meeting.
6 Bakolongola poso ya mbeka yango mpe bakokata yango na biteni.
And he shall skin the burnt offering, and cut it into pieces.
7 Sima, bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bakopelisa moto na etumbelo mpe bakotanda bakoni likolo ya moto.
The sons of Aaron the priest shall put fire on the altar, and lay wood in order on the fire;
8 Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo.
and Aaron's sons, the priests, shall lay the pieces, the head, and the fat in order on the wood that is on the fire which is on the altar;
9 Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
but its entrails and its legs he shall wash with water. The priest shall burn the whole on the altar, for a burnt offering, an offering made by fire, of a pleasant aroma to Jehovah.
10 Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba.
"'If his offering is from the flock, from the sheep, or from the goats, for a burnt offering, he shall offer a male without blemish.
11 Akokata yango kingo liboso ya Yawe, na ngambo ya nor ya etumbelo. Bakitani ya Nganga-Nzambe Aron basengeli kosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
He shall kill it on the north side of the altar before Jehovah. Aaron's sons, the priests, shall sprinkle its blood around on the altar.
12 Akokata-kata mbeka yango na biteni; bongo Nganga-Nzambe akobongisa yango: akotia moto mpe biteni ya mafuta likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo;
He shall cut it into its pieces, with its head and its fat. The priest shall lay them in order on the wood that is on the fire which is on the altar,
13 akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
but the entrails and the legs he shall wash with water. The priest shall offer the whole, and burn it on the altar. It is a burnt offering, an offering made by fire, of a pleasant aroma to Jehovah.
14 Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka.
"'If his offering to Jehovah is a burnt offering of birds, then he shall offer his offering of turtledoves, or of young pigeons.
15 Nganga-Nzambe akomema yango na etumbelo, akokata yango moto, akotumba moto yango na etumbelo mpe akosopa makila na yango zingazinga ya etumbelo.
The priest shall bring it to the altar, and wring off its head, and burn it on the altar; and its blood shall be drained out on the side of the altar;
16 Akolongola eloko oyo ezalaka na kingo mpe bansala na yango nyonso; akobwaka yango na ngambo ya este ya etumbelo, na esika oyo batiaka putulu ya moto.
and he shall take away its crop with its filth, and cast it beside the altar on the east part, in the place of the ashes.
17 Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
He shall tear it by its wings, but shall not divide it apart. The priest shall burn it on the altar, on the wood that is on the fire. It is a burnt offering, an offering made by fire, of a pleasant aroma to Jehovah.

< Levitike 1 >