< Levitike 26 >

1 Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino. 2 Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe. 3 Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango, 4 nakonokisela bino mvula na tango na yango; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango. 5 Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino. 6 Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino. 7 Bokobengana banguna liboso na bino mpe bakokufa na mopanga liboso na bino. 8 Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga. 9 Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino. 10 Bambuma ya bilanga na bino ekozala penza ebele mpe ekosala ete bokolia tango molayi bambuma oyo bokozala na yango kati na bibombelo; kino bokokaba mosusu mpo ete bokotisa bambuma ya sika. 11 Nakotia Ndako na Ngai kati na bino mpe nakotombokela bino te. 12 Nakotambola kati na bino mpo ete nazala Nzambe na bino mpe bino bozala bato na Ngai. 13 Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi. 14 Soki boboyi kotosa mpe kosalela mibeko wana nyonso, 15 soki bobwaki bikateli na Ngai, mpe soki molimo na bino etombokeli malako na Ngai kino koboya kosalela mibeko na Ngai nyonso mpe kokata boyokani na Ngai, 16 tala ndenge nakosala bino: nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango. 17 Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino. 18 Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino. 19 Nakosilisa makasi na bino, nakokomisa lola makasi lokola ebende mpo na bino, mpe mabele na bino lokola bronze. 20 Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango. 21 Soki botelemeli Ngai mpe boboyi koyoka Ngai, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino. 22 Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato. 23 Soki bitumbu yango ekoki kaka te mpo na kozongisa bino na nzela, nzokande bokobi kaka koboya kotosa Ngai, 24 Ngai mpe nakotelemela bino mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino. 25 Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna. 26 Tango nakopimela bino bilei, basi zomi bakotumba mapa na fulu moko mpe bakobanda kopesa bino mapa yango na kilo: bokolia kasi bokotonda te. 27 Soki, atako bongo, boyoki kaka te mpe bokobi kaka kotelemela Ngai, 28 Ngai mpe nakotelemela bino lisusu na kanda makasi mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino. 29 Bokolia bana na bino ya mibali mpe ya basi. 30 Nakokweyisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba, nakokweyisa bitumbelo na bino ya malasi, nakotia bibembe na bino likolo ya bibembe ya banzambe na bino ya bikeko mpe nakotombokela bino. 31 Nakokomisa bingumba na bino bisobe, nakobebisa bisika na bino ya bule mpe nakosepela te lisusu na solo kitoko ya malasi na bino. 32 Ngai moko nakokotisa mobulu kati na mokili, mpe ezala banguna na bino oyo bakoya kovanda kati na yango bakokamwa. 33 Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka. 34 Boye, mokili na bino ekosepela Saba na yango mibu nyonso oyo ekozanga bato mpe oyo bokokima epai ya banguna na bino; ekozwa bopemi mpe ekosepela Saba na yango. 35 Na tango nyonso oyo ekozanga bato, ekozwa bopemi oyo ezalaki na yango na tango ya Saba na bino tango bozalaki kovanda kati na yango. 36 Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto: bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango. 37 Bakokweya moko likolo ya moninga lokola nde bazali kokima mopanga ata soki moto moko te azali kolanda bango. Bokolonga te liboso ya banguna na bino. 38 Bokokufa kati na bikolo ya bapaya mpe mokili ya banguna na bino ekolia bino. 39 Kati na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino bakokufa kuna mpo na masumu na bango moko mpe mpo na masumu ya batata na bango. 40 Nzokande, soki bakotubela masumu na bango mpe masumu ya batata na bango, misala na bango ya mabe mpe botomboki na bango liboso na Ngai, 41 oyo mpo na yango, Ngai natelemelaki bango mpe namemaki bango na mokili ya banguna na bango, wana mitema na bango oyo ekatama ngenga te ekomikitisa mpe bakozwa lifuti ya mabunga na bango, 42 nakokanisa boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na Jakobi, na Izaki mpe na Abrayami; mpe nakokanisa mokili. 43 Boye, wana bakotika mokili mpe wana mokili yango ekosepela Saba na yango, na mikolo nyonso oyo yango ekozala ezanga bato, na tango yango, bakozwa lifuti ya mabe na bango mpo ete batosaki mibeko na Ngai te mpe batombokelaki bikateli na Ngai. 44 Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango. 45 Nakokanisa boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango, oyo Ngai nabimisaki na Ejipito, na miso ya bikolo mosusu, mpo ete nazala Nzambe na bango. Nazali Yawe. › » 46 Oyo nde bikateli, mitindo mpe mibeko oyo Yawe atiaki kati ya Ye mpe bana ya Isalaele, na ngomba Sinai, na nzela ya Moyize.

< Levitike 26 >