< Levitike 23 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
Jehovah spoke to Moses, saying,
2 « Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Tango bokobanda kosangana mpo na kosala bafeti mpo na lokumu na Ngai, bokobanda kobengisa bato mpo na kogumbamela Ngai Yawe, pamba te ezali mayangani ya bule.
"Speak to the children of Israel, and tell them, 'The set feasts of Jehovah, which you shall proclaim to be holy convocations, even these are my set feasts.
3 Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te: ezali mokolo ya Saba ya Yawe.
"'Six days shall work be done: but on the seventh day is a Sabbath of solemn rest, a holy convocation; you shall do no manner of work. It is a Sabbath to Jehovah in all your dwellings.
4 Tala bafeti mosusu ya Yawe, mayangani ya bule oyo bokobengisela bato na mikolo oyo ekatama mpo na kopesa Ngai lokumu.
"'These are the set feasts of Jehovah, even holy convocations, which you shall proclaim in their appointed season.
5 Pasika ya Yawe ekobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso.
In the first month, on the fourteenth day of the month in the evening, is Jehovah's Passover.
6 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana nde feti ya Mapa ezanga levire mpo na Yawe ekobanda. Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo.
On the fifteenth day of the same month is the feast of unleavened bread to Jehovah. Seven days you shall eat unleavened bread.
7 Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
In the first day you shall have a holy convocation. You shall do no regular work.
8 Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Mpe na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. › »
But you shall offer an offering made by fire to Jehovah seven days. In the seventh day is a holy convocation: you shall do no regular work.'"
9 Yawe alobaki na Moyize:
Jehovah spoke to Moses, saying,
10 « Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka.
"Speak to the children of Israel, and tell them, 'When you have come into the land which I give to you, and shall reap its the harvest, then you shall bring the sheaf of the first fruits of your harvest to the priest:
11 Na mokolo oyo ekolanda Saba, Nganga-Nzambe akobonza liboke yango na kotombola liboso ya Yawe mpo ete Ngai nandima yango.
and he shall wave the sheaf before Jehovah, to be accepted for you. On the next day after the Sabbath the priest shall wave it.
12 Na mokolo yango, bakobonza liboke yango na kotombola, bokobonzela Yawe mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba.
On the day when you wave the sheaf, you shall offer a male lamb without blemish a year old for a burnt offering to Jehovah.
13 Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga.
The meal offering with it shall be two tenth parts of an ephah of fine flour mingled with oil, an offering made by fire to Jehovah for a pleasant aroma; and the drink offering with it shall be of wine, the fourth part of a hin.
14 Bokoki kolia ata lipa moko te, ezala bambuma bakalinga to bambuma ya sika, kino na mokolo oyo bokobonza likabo yango epai ya Nzambe na bino. Oyo mpe ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino na bisika nyonso oyo bokozala.
You shall eat neither bread, nor roasted grain, nor fresh grain, until this same day, until you have brought the offering of your God. This is a statute forever throughout your generations in all your dwellings.
15 Bosengeli kotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo elandi mokolo ya Saba, mokolo oyo bokomema liboke ya bambuma mpo ete batombola yango; baposo nyonso sambo esengeli kozala ya kokoka.
"'You shall count from the next day after the Sabbath, from the day that you brought the sheaf of the wave offering; seven Sabbaths shall be completed:
16 Bokotanga mikolo tuku mitano kino na mokolo oyo ekolanda mokolo ya Saba. Na mokolo wana ya Saba, bokobonza epai na Yawe likabo ya bambuma ya sika.
even to the next day after the seventh Sabbath you shall number fifty days; and you shall offer a new meal offering to Jehovah.
17 Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe.
You shall bring out of your habitations two loaves of bread for a wave offering made of two tenth parts of an ephah of fine flour. They shall be baked with yeast, for first fruits to Jehovah.
18 Elongo na mapa wana, bokobonza lokola mbeka ya kotumba: bana meme sambo ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba, ngombe moko ya mobali mpe bameme mibale ya mibali. Bokobonza yango mpo na Yawe, elongo na makabo na yango ya bambuma mpe ya masanga, lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
You shall present with the bread seven lambs without blemish a year old, one young bull, and two rams. They shall be a burnt offering to Jehovah, with their meal offering, and their drink offerings, even an offering made by fire, of a sweet aroma to Jehovah.
19 Bokobonzela Ngai lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bana meme mibale ya mobu moko lokola mbeka ya boyokani.
You shall offer one male goat for a sin offering, and two male lambs a year old for a sacrifice of peace offerings.
20 Nganga-Nzambe akobonza na kotombola, liboso ya Yawe, bana meme yango mibale elongo na mapa ya bambuma ya liboso. Ekozala makabo ya bule mpo na Ngai Yawe mpe ekozala ya Nganga-Nzambe.
The priest shall wave them with the bread of the first fruits for a wave offering before Jehovah, with the two lambs. They shall be holy to Jehovah for the priest.
21 Kaka na mokolo wana, bokobengisa bato na mayangani mpo na lokumu na Ngai. Ekozala mayangani ya bule, mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Na bisika nyonso oyo bokovanda, ekozala mitindo ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.
You shall make proclamation on the same day: there shall be a holy convocation to you; you shall do no regular work. This is a statute forever in all your dwellings throughout your generations.
22 Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
"'When you reap the harvest of your land, you shall not wholly reap into the corners of your field, neither shall you gather the gleanings of your harvest: you shall leave them for the poor, and for the foreigner. I am Jehovah your God.'"
23 Yawe alobaki na Moyize:
Jehovah spoke to Moses, saying,
24 « Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai.
"Speak to the children of Israel, saying, 'In the seventh month, on the first day of the month, shall be a solemn rest to you, a memorial of blowing of trumpets, a holy convocation.
25 Bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala, kasi bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. › »
You shall do no regular work; and you shall offer an offering made by fire to Jehovah.'"
26 Yawe alobaki na Moyize:
Jehovah spoke to Moses, saying,
27 « Mokolo ya zomi ya sanza ya sambo ezali mokolo ya bolimbisi masumu. Bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai; bokomikitisa mpe bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto.
"However on the tenth day of this seventh month is the day of atonement: it shall be a holy convocation to you, and you shall afflict yourselves; and you shall offer an offering made by fire to Jehovah.
28 Bokosala mosala moko te na mokolo wana, pamba te ezali mokolo ya kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso na Ngai Yawe, Nzambe na bino.
You shall do no manner of work in that same day; for it is a day of atonement, to make atonement for you before Jehovah your God.
29 Moto nyonso oyo akokila bilei te na mokolo wana, bakolongola ye kati na bato na ye.
For whoever it is who shall not deny himself in that same day; shall be cut off from his people.
30 Nakoboma moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo wana.
Whoever it is who does any manner of work in that same day, that person I will destroy from among his people.
31 Bokoki kosala ata mosala moko te. Na bisika nyonso oyo bokozala, oyo nde ekozala mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.
You shall do no manner of work: it is a statute forever throughout your generations in all your dwellings.
32 Ekozala mpo na bino mokolo ya kopema lokola mokolo ya Saba, mokolo ya komikitisa. Bokobatela mokolo na bino ya Saba, kobanda na pokwa ya mokolo ya libwa kino na pokwa ya mokolo oyo ekolanda. »
It shall be a Sabbath of solemn rest for you, and you shall deny yourselves. In the ninth day of the month at evening, from evening to evening, you shall keep your Sabbath."
33 Yawe alobaki na Moyize:
Jehovah spoke to Moses, saying,
34 « Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, feti ya Bandako ya kapo esengeli kobanda, mpe bakosepela yango mikolo sambo mpo na lokumu ya Yawe.
"Speak to the children of Israel, and say, 'On the fifteenth day of this seventh month is the feast of booths for seven days to Jehovah.
35 Mokolo ya liboso ekozala mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala mokolo na mokolo.
On the first day shall be a holy convocation: you shall do no regular work.
36 Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe, mpe bokobonza makabo bazikisa na moto. Ekozala mokolo ya suka ya mayangani; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala.
Seven days you shall offer an offering made by fire to Jehovah. On the eighth day shall be a holy convocation to you; and you shall offer an offering made by fire to Jehovah. It is a solemn assembly; you shall do no regular work.
37 Oyo nde bafeti oyo bokobanda kosala mpo na lokumu ya Yawe, mpe oyo bokobanda kobengisela bato na mayangani ya bule mpo ete basambela Yawe mpe babonzela Ye makabo bazikisa na moto, bambeka ya kotumba mpe makabo ya bagato, bambeka mpe bambeka ya masanga ya vino, kolanda ndenge ekatama mpo na mokolo na mokolo.
"'These are the appointed feasts of Jehovah, which you shall proclaim to be holy convocations, to offer an offering made by fire to Jehovah, a burnt offering, and a meal offering, a sacrifice, and drink offerings, each on its own day;
38 Bokobakisa makabo oyo na likolo ya makabo oyo bokobonzela Ngai na mikolo ya Saba ya Yawe, na likolo ya bakado na bino, na likolo ya makabo na bino mpo na kokokisa ndayi to na likolo ya makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko.
besides the Sabbaths of Jehovah, and besides your gifts, and besides all your vows, and besides all your freewill offerings, which you give to Jehovah.
39 Kasi na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, sima na kobuka bambuma ya mabele, bokosala feti mpo na Yawe, mikolo sambo. Mokolo ya liboso mpe mokolo ya mwambe ekozala mikolo ya kopema.
"'So on the fifteenth day of the seventh month, when you have gathered in the fruits of the land, you shall keep the feast of Jehovah seven days: on the first day shall be a solemn rest, and on the eighth day shall be a solemn rest.
40 Na mokolo ya liboso, bokopona bambuma ya banzete, mandalala ya banzete ya mbila, bitape ya banzete oyo ezali na makasa ebele mpe banzete oyo babengaka sole mpe ebotaka pembeni ya mayi. Bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, mikolo sambo.
You shall take on the first day the fruit of goodly trees, branches of palm trees, and boughs of thick trees, and willows of the brook; and you shall rejoice before Jehovah your God seven days.
41 Na mikolo sambo, bokobanda kosala feti oyo mibu nyonso mpo na lokumu na Yawe. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani oyo bakoya sima na bino; bokosala feti yango na sanza ya sambo.
You shall keep it a feast to Jehovah seven days in the year: it is a statute forever throughout your generations; you shall keep it in the seventh month.
42 Bokovanda na bandako ya matiti mikolo sambo; bato nyonso oyo bazali bana mboka ya Isalaele bakovanda kati na bandako yango ya matiti
You shall dwell in booths seven days. All who are native-born in Israel shall dwell in booths,
43 mpo ete bakitani na bino bayeba ete navandisaki bana ya Isalaele na bandako ya matiti tango nabimisaki bango na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
that your generations may know that I made the children of Israel to dwell in booths, when I brought them out of the land of Egypt. I am Jehovah your God.'"
44 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele malako nyonso oyo etali bafeti ya Yawe.
Moses declared to the children of Israel the appointed feasts of Jehovah.

< Levitike 23 >